MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | BALEVI 10-11
Lingá Yehova mingi koleka bato ya libota na yo
Bosembo na biso epai ya Yehova ekoki komekama makasi ntango moto moko oyo tolingaka alongolami na lisangá. Malako oyo Yehova apesaki Arona emonisi polele ete bato oyo bazali na ndeko ya libota oyo alongolami na lisangá basengeli kokata boyokani na ndeko yango. Tosengeli kolinga Yehova mingi koleka bandeko na biso ya libota oyo bazali lisusu sembo te.
Mapamboli nini baoyo batosaka malako ya Yehova na oyo etali kolongola moto na lisangá bakoki kozwa?—1Ko 5:11; 2Yn 10, 11