Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w13 15/11 nk. 8-9
  • Ndenge oyo tokoki kosalisa basusu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge oyo tokoki kosalisa basusu
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Masolo mosusu
  • Biloko oyo eleki mingi epai na bango ezipa oyo ezangi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • “Mosala ezali monene”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2016
  • Yehova apambolaka mpenza ezaleli ya komipesa
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Moto oyo akabaka akopambwama
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
w13 15/11 nk. 8-9

Ndenge oyo tokoki kosalisa basusu

FRANÇOIS, oyo azali nkulutu na ekólo moko ya bobola, alobi boye: “Mobulu oyo ebimaki nsima ya maponami mpo bato mosusu basepelaki te na mokonzi oyo alongaki, mpe etindaki bankóto ya Batatoli ya Yehova bákima bandako na bango. Bilei mpe nkisi ya monganga ezalaki lisusu mingi te, mpe mwa moke oyo etikalaki ekómaki ntalo mingi. Babanki ekangamaki mpe bamasini oyo basalelaka mpo na kozwa mbongo na banki ezalaki lisusu na mbongo te to ezalaki lisusu kosala te.”

Bandeko ya biro ya filiale babandaki nokinoki kotinda mbongo mpe biloko oyo esengeli mpo na kosunga bandeko oyo bakimaki na Bandako ya Bokonzi. Basoda ya ngámbo nyonso mibale bakangaki banzela, kasi lokola bayebaki ete Batatoli ya Yehova bakɔtaka na makambo ya politiki te, mbala mingi bazalaki kotika mituka ya Betele eleka.

François alobi boye: “Ntango tozalaki kokende na Ndako ya Bokonzi moko, basoda babandaki kobɛta motuka na biso masasi. Kasi, masasi ezwaki moto te. Ntango tomonaki soda moko azali kopusana mbangu pene na biso na mondoki na mabɔkɔ, tozongisaki motuka nsima, tobalukaki, mpe tozongaki mbangu na Betele. Topesaki Yehova matɔndi ndenge tobikaki na liwa. Na mokolo oyo elandaki, bandeko 130 oyo bazalaki na Ndako ya Bokonzi yango bakendaki na esika mosusu oyo bazalaki na libateli. Basusu bayaki na Betele, mpe tokokisaki bamposa na bango ya mosuni mpe ya elimo, tii ntango mobulu esilaki.”

François abakisi boye: “Na nsima, bandeko ebele bakomelaki biro ya filiale mpo na komonisa botɔndi na bango. Ndenge bandeko ya bikólo mosusu basalisaki bango etindaki bango bátyela lisusu Yehova motema mingi koleka.”

Ntango makama ebimi, ezala yango moko to bato nde babimisi yango, tósukaka te na koyebisa bandeko ete: “Bóyɔta mɔtɔ mpe bólya malamu.” (Yak. 2:15, 16) Tosengeli nde koluka kokokisa bamposa na bango ya mosuni. Ndenge moko mpe na siɛklɛ ya liboso, ntango bayokaki ete nzala moko makasi ezali koya, “bayekoli . . . bazwaki mokano, moto na moto na kolanda oyo azalaki na yango, ya kotindela bandeko oyo bazalaki kofanda na Yudea biloko ya lisungi.”​—Mis. 11:28-30.

Biso basaleli ya Yehova tokakatanaka te mpo na kosalisa bato oyo bazali na bosɛnga. Kasi, bato bazali mpe na bamposa ya elimo. (Mat. 5:3) Mpo na kosalisa bato báyeba yango mpe bákokisa yango, Yesu atindaki bayekoli na ye bákómisa bato mosusu bayekoli. (Mat. 28:19, 20) Mokomoko na biso apesaka ntango na ye, makasi na ye mpe biloko na ye mpo na kokokisa mosala yango. Ebongiseli ya Yehova esalelaka mbongo ndambo ya makabo mpo na kosunga bato, kasi makabo epesamaka libosoliboso nde mpo matomba ya Bokonzi ekende liboso mpe mpo na mosala ya kosakola nsango malamu. Na ndenge yango, tomonisaka ete tolingaka Nzambe mpe bazalani na biso.​—Mat. 22:37-39.

Moto nyonso oyo apesaka makabo mpo na mosala ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba ayeba ete makabo na ye esalelamaka malamu mpe na ndenge oyo ebongi mpenza. Yo mpe olingi kosalisa bandeko oyo bazali na bosɛnga? Olingi kopesa mabɔkɔ na mosala ya kokómisa bato bayekoli? Soki ezali bongo, “koboya te kosala malamu na baoyo basengeli na yango, ntango lobɔkɔ na yo ezali na nguya ya kosala yango.”​—Mas. 3:27.

NDENGE BATO MOSUSU BAPONAKA KOPESA MAKABO MPO NA MOSALA YA BOKONZI NA MOKILI MOBIMBA

Ndenge kaka ezalaki na ntango ya ntoma Paulo, lelo oyo mpe bandeko mingi ‘babombaka mwa eloko pembeni’ to babongisaka mwa mbongo oyo batyaka na bakɛsi ya makabo oyo bakomá “Mosala ya kosakola na mokili mobimba.” (1 Ko. 16:2) Sanza na sanza, masangá etindaka makabo yango na biro ya filiale ya Batatoli ya Yehova ya mboka na bango. Moto akoki kotinda likabo na ye ya mbongo mbala moko na Association Sans But Lucratif “Les Témoins de Jéhovah,” 75, 13e Rue, Limete-Industriel, Kinshasa, République Démocratique du Congo, to na biro ya filiale oyo etalelaka mboka na bango. Ba-chèque oyo etindami na adrɛsi oyo totye awa esengeli kozala na nkombo ya “Association ‘Les Témoins de Jéhovah.’” Moto akoki mpe kopesa babiju to biloko mosusu ya motuya. Esengeli kotinda yango nzela moko na mokanda oyo emonisi ete biloko yango ezali nde likabo.

  • KODEFISA MBONGO

    • Moto akoki kodefisa “Association ‘Les Témoins de Jéhovah’” mbongo mpo na mosala ya kosakola na mokili mobimba. Nzokande, soki kaka asɛngi mbongo na ye, bakozongisela ye yango. Mpo na koyeba makambo mosusu, komelá “Association ‘Les Témoins de Jéhovah’” na adrɛsi oyo ezali awa likoló to bengá na 099 818 9791 to na 081 555 1000.

  • LOLENGE MOSUSU YA KOPESA MAKABO

    Longola kopesa makabo ya mbongo, moto akoki kopesa makabo na ndenge mosusu mpo mosala ya Bokonzi na mokili mobimba ekende liboso. Na ndakisa:

    Asiranse: Moto akoki kokoma nkombo ya “Association ‘Les Témoins de Jéhovah’” mpo ezwa mbongo na ye ya asiranse to ya pasyo soki akufi.

    Kofungola kɔnti na banki: Moto akoki kofungola kɔnti na banki, kopesa certificat de dépôt, to kofungola kɔnti na banki na mbongo na ye ya pasyo na nkombo ya “Association ‘Les Témoins de Jéhovah,’” to kotya nkombo ya “Association ‘Les Témoins de Jéhovah’” mpo ezwa mbongo yango soki akufi, na kolanda mibeko ya banki ya mboka oyo azali.

    Lotomo ya kozwa mosolo: Okoki kopesa “Association ‘Les Témoins de Jéhovah’” lotomo ya kozwa mosolo (titres et obligations) lokola likabo mpenza to kopesa “Association ‘Les Témoins de Jéhovah’” lotomo ya kozwa yango nsima ya liwa na yo.

    Kopesa lopango to ndako: Moto akoki kopesa ndako to lopango na ye likabo, to soki ezali ndako oyo afandi, akobatela lotomo ya kosalela yango ntango azali naino na bomoi. Liboso ya kopesa biloko ya ndenge wana, esengeli koyebisa biro ya Batatoli ya Yehova ya mboka na bino.

    Kotya mbongo na banki oyo ekobimisa benefisi: Moto akoki kotya mbongo na banki to kopesa mikanda lokola ndanga na nkombo ya Lisangani moko oyo Batatoli ya Yehova basalelaka. Na nsima, moto yango to mpe moto mosusu oyo ye moko akopona akobanda kozwa benefisi oyo mbongo yango ekobanda kobimisa mbula na mbula. Mpo na yango, Leta akokitisela moto yango mpako oyo asengeli kofuta na mbula oyo apesi likabo yango.

    Testama: Moto akoki kopesa “Association ‘Les Témoins de Jéhovah’” biloko to ndako to mosolo na mokanda ya kozwa libula oyo endimami na mibeko, to akoki kopesa “Association ‘Les Témoins de Jéhovah’” lotomo ya kozwa biloko oyo akotika. Soki moto asali mokanda mpo na kopesa lingomba lotomo ya kozwa biloko na ye ntango akokufa, Leta akoki kokitisa mpako oyo afutaka mpo na biloko yango.

Maloba “lolenge mosusu ya kopesa makabo” emonisi ete moto oyo azali kopesa makabo ya ndenge wana asengeli kozwa bibongiseli mosusu.

Mpo na koyeba makambo mosusu, okoki kobenga to kokomela “Association ‘Les Témoins de Jéhovah’” na adrɛsi oyo ezali awa na nse, to okoki kokende na biro ya Batatoli na ekólo oyo ofandi.

BIRO YA FILIALE

“Association ‘Les Témoins de Jéhovah’”

B.P. 634

75, 13e Rue, Limete, Kinshasa

République Démocratique du Congo

Telefone: 099 818 9791 to 081 555 1000

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto