Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w17 Novembre nk. 18-19
  • Moto oyo akabaka akopambwama

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Moto oyo akabaka akopambwama
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
  • Masolo mosusu
  • “Mosala ezali monene”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2016
  • Biloko oyo eleki mingi epai na bango ezipa oyo ezangi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Yehova apambolaka mpenza ezaleli ya komipesa
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Ndenge oyo tokoki kosalisa basusu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
w17 Novembre nk. 18-19
Hana amemi elenge Samwele na tabernakle

Moto oyo akabaka akopambwama

BANDA kala, bambeka ezalaka na ntina mingi na losambo ya solo. Bayisraele bazalaki kopesa bambeka ya banyama; bakristo bapesaka “mbeka ya lisanzoli.” Kasi, ezali na bambeka ya lolenge mosusu oyo esepelisaka Nzambe. (Baebre 13:15, 16) Bambeka yango epesaka esengo mpe ememaka mapamboli, ndenge bandakisa oyo elandi emonisi yango.

Hana, mwasi moko ya sembo ya ntango ya kala, azalaki mpenza na mposa ya mwana mobali kasi azalaki kobota te. Ayebisaki Yehova na libondeli ete soki aboti mwana mobali ‘akopesa ye epai ya Yehova mikolo nyonso ya bomoi na ye.’ (1 Samwele 1:10, 11) Na nsima, Hana akómaki na zemi, abotaki mwana mobali mpe bapesaki ye nkombo Samwele. Ntango kaka Samwele akilisamaki mabɛlɛ, Hana amemaki ye na Tabernakle, kaka ndenge alakaki. Yehova apambolaki Hana mpo na elimo na ye ya komipimela. Azwaki lisusu libaku ya kobota bana mitano, mpe Samwele akómaki mosakoli mpe azalaki moko ya bato oyo bakomaki Biblia.​—1 Samwele 2:21.

Lokola Hana mpe Samwele, bakristo lelo tozali na libaku ya kosalela bomoi na biso mpo na komipesa na mosala ya Mozalisi na biso. Yesu alakaki ete Yehova akopesa biso mbano monene ntango nyonso oyo tomipimeli makambo mpo na losambo na Ye.​—Marko 10:28-30.

Na siɛklɛ ya liboso, mokristo moko na nkombo Dorkasi atondaki “na misala ya malamu mpe na makabo ya motema mawa” oyo azalaki kopesa mpo na kosunga basusu. Kasi, “azwaki maladi mpe akufaki”; yango epesaki mpasi na lisangá. Ntango bayekoli bayokaki ete Petro azalaki mosika te, basɛngaki ye aya nokinoki. Kanisá esengo na bango ntango Petro ayaki mpe asekwisaki Dorkasi; ye moto ya liboso oyo ntoma moko asekwisaki. (Misala 9:36-41) Nzambe abosanaki te bambeka ya Dorkasi. (Baebre 6:10) Ezaleli na ye ya kokaba ekomamaki na Liloba ya Nzambe mpo tómekola ndakisa na ye ya malamu.

Ntoma Paulo mpe atiká ndakisa malamu na oyo etali kopesa ntango na ye mpe kotyela basusu likebi. Akomelaki bakristo ya Korinti ete: “Kasi ngai, na esengo koleka, nakopesa biloko na ngai nyonso mpe nakopesama mobimba mpo na milimo na bino.” (2 Bakorinti 12:15) Paulo amonaki ete komipesa mpo na basusu epesaka esengo mingi, kasi na koleka, ememaka mapamboli ya Yehova.​—Misala 20:24, 35.

Ezali polele ete Yehova asepelaka soki tozali kosalela ntango mpe makasi na biso mpo na matomba ya Bokonzi mpe kosalisa bandeko. Kasi ezali nde na lolenge mosusu oyo tokoki kopesa mabɔkɔ na mosala ya kosakola Bokonzi? Ɛɛ! Longola misala oyo emonisaka bolingo, tokoki kokumisa Yehova soki tozali kotya makabo. Makabo yango esalisaka na mosala ya kosakola na mokili mobimba, na ndakisa kosalisa bamisionɛrɛ mpe bandeko oyo bazali na mosala ya ntango nyonso. Esalisaka mpe mpo na kobongisa mpe kobongola mikanda mpe kobimisa bavideo, kosalisa bandeko oyo bazwi makama, mpe kotonga Bandako ya Bokonzi. Tóbosana te ete moto oyo akabaka akopambwama. Lisusu, ntango topesaka Yehova biloko na biso ya motuya, tokumisaka ye.​—Masese 3:9; 22:9.

Ndenge ya kopesa makabo mpo na mosala ya bokonzi na mokili mobimba

Ndenge ezalaki na mikolo ya ntoma Paulo, lelo mpe bandeko mingi ‘babombaka mwa eloko pembeni,’ elingi koloba babongisaka mwa mbongo mpe batyaka yango na bakɛsi ya makabo oyo bakomá “Mosala ya kosakola na mokili mobimba.” (1 Bakorinti 16:2) Sanza na sanza, masangá etindaka makabo yango na biro ya filiale ya Batatoli ya Yehova ya mboka na bango. Okoki mpe kotinda likabo na yo ya mbongo mbala moko na “Association ‘Les Témoins de Jéhovah,’” to na biro ya filiale oyo ekambaka mosala na mboka na bino. Mpo oyeba nkombo ya association oyo Batatoli ya Yehova ya mboka oyo ofandi basalelaka, bengá biro ya filiale. Okoki komona adrɛsi na yango na site na biso jw.org.

MAKABO

  • Okoki kosalela karte na yo ya banki, na ordinatɛrɛ to na aparɛyi mosusu, mpo na kotinda likabo na yo mbala moko na banki. Okoki mpe kosalela chèque. Na bafiliale mosusu, moto akoki kotinda likabo na nzela ya site na biso jw.org.

  • Okoki mpe kotinda mpenza mbongo mbala moko. Osengeli kokoma mwa mokanda oyo emonisi ete mbongo yango ezali likabo.

NDENGE MOSUSU YA KOPESA

Longola kopesa makabo ya mbongo, moto akoki kopesa makabo na ndenge mosusu mpo mosala ya Bokonzi na mokili mobimba ekende liboso. Ata soki oponi kopesa na ndenge nini, bengá to komelá liboso biro ya filiale ya mboka na bino mpo oyeba soki basalelaka lolenge yango ya kopesa makabo. Lokola esengeli kolanda mibeko ya mboka, ezali na ntina mingi osolola na bapesi-toli na makambo ya mpako mpe ya mibeko mpo oyeba ndenge malamu ya kopesa likabo na yo. Talá ndenge yango ya kopesa.

Asiranse mpe pasyo: Okoki kokoma nkombo “Association ‘Les Témoins de Jéhovah,’” to nkombo ya association oyo Batatoli ya Yehova basalelaka na mboka na bino, mpo ezwa mbongo na yo ya asiranse to ya pasyo soki okufi.

Kɔnti na banki: Okoki kosɛnga ete soki okufi, bápesa mbongo na yo oyo ezali na banki na “Association ‘Les Témoins de Jéhovah,’” to na association oyo Batatoli ya Yehova basalelaka na mboka na bino, na kolanda mibeko ya banki ya mboka na bino.

Lotomo ya kozwa mbongo: Soki otyaki mbongo na kompanyi moko mpe esengeli kopesaka yo benefisi, okoki kotya yango na nkombo “Association ‘Les Témoins de Jéhovah,’” to na nkombo ya association oyo Batatoli ya Yehova basalelaka na mboka na bino. Soki ozali na lotomo ya kozwa mbongo na kompanyi moko mpo yo mpe otyaki mbongo mpo kompanyi yango ebanda kobimisa benefisi, okoki kopesa association yango lotomo ya kozwa mbongo lokola likabo mpenza to kokoma mpo na koloba ete nsima ya liwa na yo, association ya Batatoli ya Yehova ezali na lotomo ya kozwa yango.

Kopesa lopango to ndako: Okoki kopesa ndako to lopango na yo likabo mbala moko, to soki ezali ndako oyo ofandi, okobatela lotomo ya kosalela yango ntango ozali naino na bomoi, association ya Batatoli ya Yehova ekozwa lotomo ya kotɛka yango nsima ya liwa na yo.

Testama: Okoki kopesa “Association ‘Les Témoins de Jéhovah,’” to association oyo Batatoli ya Yehova basalelaka na mboka na bino, ndako to mbongo na nzela ya mokanda ya kozwa libula to testama oyo endimami na mibeko, to okoki kopesa association lotomo ya kozwa biloko oyo okotika. Soki osali bongo, Leta akoki kokitisa mpako oyo ofutaka mpo na biloko yango.

Mpo na kopesa likabo na yo ndenge tolobeli, esengeli kobongisa makambo liboso. Na nzela ya kopesa makabo ndenge wana, bato mingi basalisi mpo mosala na biso ya kosakola mpe ya kosunga bato na mokili mobimba ekende liboso, mpe ekoki kosala ete Leta asɛnga moto mpako mingi te mpo asalelaki mbongo na ye mpo na misala oyo ezalaki kosunga bato nyonso

Mpo na koyeba makambo mosusu, kende na jw.org mpe na nse ya lokasa, finá esika bakomi “Kopesa likabo mpo na mosala na biso na mokili mobimba,” to komelá biro ya filiale.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto