Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w16 Novembre nk. 19-20
  • “Mosala ezali monene”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Mosala ezali monene”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2016
  • Masolo mosusu
  • Yehova apambolaka mpenza ezaleli ya komipesa
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Biloko oyo eleki mingi epai na bango ezipa oyo ezangi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Ndenge oyo tokoki kosalisa basusu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Moto oyo akabaka akopambwama
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2016
w16 Novembre nk. 19-20
Mokonzi Davidi azali kolakisa moto moko plan ya tempelo; ndeko mobali moko azali kotala baplan ya bandako ya kotonga

“Mosala ezali monene”

EZALI ntango ya likita moko ya ntina mingi na Yerusaleme. Mokonzi Davidi ayanganisi bankumu na ye nyonso, bakapita, mpe mibali nyonso ya nguya. Basepeli mingi koyoka liyebisi moko ya ntina mingi: Yehova apesi Salomo, mwana ya Davidi, mokumba ya kotonga tempelo moko monene mpo na losambo ya Nzambe ya solo. Na nzela ya elimo santu, Davidi, mokonzi ya Yisraele oyo akómi mobange, azwaki plan ya kotonga mpe apesaki yango Salomo. Davidi alobi: “Mosala ezali monene; mpo ndako yango monene ezali ya moto te, kasi ya Yehova Nzambe.”​—1 Nt. 28:1, 2, 6, 11, 12; 29:1.

Na nsima, Davidi atuni motuna oyo: “Nani akomipesa na bolingo mpo na kotondisa lobɔkɔ na ye lelo na likabo mpo na Yehova?” (1 Nt. 29:5) Soki ozalaki wana, olingaki kosala nini? Olingaki kondima kopesa mabɔkɔ na mosala wana monene? Bayisraele bamipesaki na mosala yango. “Basepelaki . . . kopesa makabo ya bolingo, mpo ezalaki na motema mobimba nde bazalaki kopesa Yehova makabo ya bolingo.”​—1 Nt. 29:9.

Bankama ya bambula na nsima, Yehova atyaki ebongiseli moko ya monene koleka tempelo wana. Atyaki tempelo monene ya elimo, ebongiseli oyo na nzela na yango bato bakoki kopusana penepene na ye mpo na kosambela ye na nzela ya mbeka ya Yesu. (Ebr. 9:11, 12) Ndenge nini Yehova azali kosalisa bato bázongisa boyokani elongo na ye lelo oyo? Ezali na nzela ya mosala ya kokómisa bato bayekoli. (Mat. 28:19, 20) Na nzela ya mosala yango, mbula na mbula, tozali koyekola Biblia na bamilio ya bato, bankóto ya bayekoli bazali kozwa batisimo, mpe bankama ya masangá ya sika ezali kofungwama.

Bokoli wana ezali kosɛnga ete tóbimisa mikanda mingi koleka, tótonga mpe tóbatela Bandako ya Bokonzi, mpe tózwa bandako to bisika ya kosala mayangani ya mike mpe ya minene. Ondimi te ete mosala ya kosakola nsango malamu oyo tozali kosala ezali mosala monene mpe oyo ezali kopesa biso matomba?​—Mat. 24:14.

Bolingo oyo tolingaka Nzambe mpe bazalani na biso, mpe koyeba ete mosala ya kosakola Bokonzi esengeli kosalema nokinoki, ezali kotinda basaleli ya Nzambe ‘bámipesa . . . mpo na kotondisa lobɔkɔ na likabo mpo na Yehova’ mpe bápesaka makabo ya bolingo malamu. Ezali mpenza esengo ‘kokumisa Yehova na biloko na biso ya motuya’ mpe komona ndenge oyo mbongo yango ezali kosalelama na bosembo mpe na ekɛngɛ mpo ete mosala oyo eleki monene na lisolo ya bato esalema.​—Mas. 3:9.

Ndenge bato mosusu baponaka kopesa makabo mpo na mosala ya Bokonzi na mokili mobimba

Lelo oyo, bandeko mingi ‘babombaka mwa eloko pembeni’ to babongisaka mwa mbongo oyo batyaka na bakɛsi ya makabo oyo bakomá “Mosala ya kosakola na mokili mobimba.” (1 Ko. 16:2) Sanza na sanza, masangá etindaka makabo yango na biro ya filiale ya Batatoli ya Yehova ya mboka na bango. Moto akoki kotinda likabo na ye ya mbongo mbala moko na “Association Sans But Lucratif ‘Les Témoins de Jéhovah,’” 75, 13e Rue, Industriel, Limete-Kinshasa, République Démocratique du Congo, to na biro ya filiale oyo ekambaka mosala na mboka na bango. Ba-chèque oyo etindami na adrɛsi oyo totye awa esengeli kozala na nkombo ya “Association ‘Les Témoins de Jéhovah.’” Moto akoki mpe kopesa babiju to biloko mosusu ya motuya. Esengeli kotinda yango nzela moko na mokanda oyo emonisi ete biloko yango ezali nde likabo.

KODEFISA MBONGO

  • Moto akoki kosɛnga banki moko etindela “Association ‘Les Témoins de Jéhovah’” mbongo to akoki kosalela carte bancaire na ye mpo na kopesa Association mbongo. Na bafiliale mosusu, moto akoki kotinda mokanda na nzela ya site na biso jw.org to site mosusu oyo Association eponi.

  • Moto akoki kodefisa “Association ‘Les Témoins de Jéhovah’” mbongo mpo na mosala ya kosakola na mokili mobimba. Nzokande, soki kaka asɛngi mbongo na ye, bakozongisela ye yango. Mpo na koyeba makambo mosusu, komelá “Association ‘Les Témoins de Jéhovah’” na adrɛsi oyo ezali awa likoló to bengá na +243 (0)99 818 9791 to na +243 (0)81 555 1000.

LOLENGE MOSUSU YA KOPESA MAKABO

Longola kopesa makabo ya mbongo, moto akoki kopesa makabo na ndenge mosusu mpo mosala ya Bokonzi na mokili mobimba ekende liboso. Na ndakisa:

Asiranse: Moto akoki kokoma nkombo ya “Association ‘Les Témoins de Jéhovah’” mpo ezwa mbongo na ye ya asiranse to ya pasyo soki akufi.

Kofungola kɔnti na banki: Moto akoki kofungola kɔnti na banki, kopesa certificat de dépôt, to kofungola kɔnti na banki na mbongo na ye ya pasyo na nkombo ya “Association ‘Les Témoins de Jéhovah,’” to kotya nkombo ya “Association ‘Les Témoins de Jéhovah’” mpo ezwa mbongo yango soki akufi, na kolanda mibeko ya banki ya mboka oyo azali.

Lotomo ya kozwa mbongo: Okoki kopesa “Association ‘Les Témoins de Jéhovah’” lotomo ya kozwa mbongo (titres et obligations) lokola likabo mpenza to kopesa “Association ‘Les Témoins de Jéhovah’” lotomo ya kozwa yango nsima ya liwa na yo.

Kopesa lopango to ndako: Moto akoki kopesa ndako to lopango na ye likabo, to soki ezali ndako oyo afandi, akobatela lotomo ya kosalela yango ntango azali naino na bomoi. Liboso ya kopesa biloko ya ndenge wana, esengeli koyebisa biro ya Batatoli ya Yehova ya mboka na bino.

Kotya mbongo na banki oyo ekobimisa benefisi: Moto akoki kotya mbongo na banki to kopesa mikanda lokola ndanga na nkombo ya Lisangani moko oyo Batatoli ya Yehova basalelaka. Na nsima, moto yango akobanda kozwa benefisi oyo mbongo yango ekobanda kobimisa mbula na mbula. Mpo na yango, Leta akokitisela moto yango mpako oyo asengeli kofuta na mbula oyo apesi likabo yango.

Testama: Moto akoki kopesa “Association ‘Les Témoins de Jéhovah’” biloko to ndako to mbongo na mokanda ya kozwa libula oyo endimami na mibeko, to akoki kopesa “Association ‘Les Témoins de Jéhovah’” lotomo ya kozwa biloko oyo akotika. Soki moto asali mokanda mpo na kopesa lingomba lotomo ya kozwa biloko na ye ntango akokufa, Leta akoki kokitisa mpako oyo afutaka mpo na biloko yango. Maloba “lolenge mosusu ya kopesa makabo” emonisi ete moto oyo azali kopesa makabo ya ndenge wana asengeli kozwa bibongiseli mosusu.

Mpo na koyeba makambo mosusu, okoki kobenga, kokende to kokomela biro ya Batatoli na ekólo oyo ofandi. Biro ya filiale “Association ‘Les Témoins de Jéhovah’” B.P. 634, 75, 13e Rue Limete-Kinshasa, République Démocratique du Congo. Telefone: +243 (0)998 189 791 to +243 (0)81 555 1000.

Mpo na koyeba makambo mosusu, finá “Soki olingi kosala likabo mpo na kosunga mosala na biso na mokili mobimba” na nse ya lokasa ya ebandeli na jw.org, to komelá biro ya filiale.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto