Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w15 1/10 lok. 5
  • Mpo na nini Nzambe asɛngi tóbondelaka ye?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mpo na nini Nzambe asɛngi tóbondelaka ye?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Nzambe alingi okóma moninga na ye.
  • Nzambe alingi kosalisa yo.
  • Bato bazalaka na mposa ya koyeba makambo ya Nzambe.
  • Nzambe ayokaka mabondeli na yo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2021
  • Biyano na mituna ya Biblia
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Kobondela Nzambe ezali likambo ya lokumu monene
    Makambo oyo Biblia eteyaka
  • Ndenge nini kobɛlɛma epai na Nzambe kati na libondeli
    Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso?
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
w15 1/10 lok. 5

ELOBELI TITRE YA EZIPELI | KOBONDELA EZALI MPENZA NA NTINA?

Mpo na nini Nzambe asɛngi tóbondelaka ye?

Nzambe alingi okóma moninga na ye.

Baninga basololaka mpo boninga na bango ekóma makasi. Ndenge moko mpe, Nzambe asɛngaka biso tósololaka na ye mpo alingi tókóma baninga na ye. Alobi boye: “Bokobenga ngai mpenza, bokoya, bokobondela ngai, mpe ngai nakoyokela bino.” (Yirimia 29:12) Soki ozali kosolola na Nzambe, ‘okopusana penepene na ye mpe ye akopusana penepene na yo.’ (Yakobo 4:8) Biblia elobi boye: “Yehova azali pene na baoyo nyonso bazali kobelela ye.” (Nzembo 145:18) Soki tozali kobondela Nzambe mingi, boninga na biso na ye ekokóma lisusu makasi.

“Yehova azali pene na baoyo nyonso bazali kobelela ye.”​—Nzembo 145:18

Nzambe alingi kosalisa yo.

Yesu alobaki boye: “Moto nani na kati na bino oyo soki mwana na ye asɛngi mampa​—akopesa ye libanga? To, mbala mosusu soki asɛngi mbisi—​akopesa ye nyoka? Yango wana, soki bino . . . boyebi kopesa bana na bino makabo ya malamu, bongo Tata na bino oyo azali na likoló, akopesa te baoyo bazali kosɛnga ye biloko ya malamu koleka?” (Matai 7:9-11) Nzambe asɛngi obondelaka ye mpo ‘atyelaka yo likebi’ mpe alingi kosalisa yo. (1 Petro 5:7) Asɛngi yo kutu oyebisaka ye makambo oyo etungisaka yo. Biblia elobi boye: “Bómitungisa ata na likambo moko te, kasi na makambo nyonso na libondeli mpe na lilɔmbɔ ná matɔndi, kosɛnga na bino eyebana epai ya Nzambe.”​—Bafilipi 4:6.

Bato bazalaka na mposa ya koyeba makambo ya Nzambe.

Bato ya mayele oyo bayekolaka bizaleli ya bato bamonaki ete bamilio ya bato bayokaka mposa ya kobondela. Ata bato mosusu oyo bandimaka te ete Nzambe azalaka mpe baoyo balobaka ete tokoki koyeba Nzambe te, bayokaka mpe mposa yango.a Yango emonisi ete bato bakelamá na mposa ya koyeba makambo ya Nzambe. Yesu alobaki boye: “Esengo na baoyo bayebi bobola na bango ya elimo.” (Matai 5:3) Lolenge moko oyo tokoki kokokisa mposa yango ezali ya kosololaka na Nzambe.

Soki tondimi kobondela Nzambe ndenge asɛngi, tokozwa matomba nini?

a Ankɛtɛ moko oyo Centre de recherche de Pew esalaki na États-Unis na 2012 emonisi ete bato mosusu (11%) oyo bandimaka te ete Nzambe azalaka ná baoyo balobaka ete moto akoki koyeba Nzambe te babondelaka ata mbala moko na sanza.

Makambo nini moto akoki kobondela mpo na yango?

Biblia emonisi ete tokoki kobondela mpo na makambo nyonso oyo etali bomoi na biso. Tokoki kobondela mpo na makambo lokola:

  • Koyambola masumu “Nayambolelaki yo lisumu na ngai, mpe nabombaki libunga na ngai te.”​—Nzembo 32:5.

  • Kopesa matɔndi “Ezali malamu kopesa Yehova matɔndi.”​—Nzembo 92:1.

  • Kosanzola “Nakopambola Yehova ntango nyonso; ntango nyonso lisanzoli na ye ekozala na monɔkɔ na ngai.”​—Nzembo 34:1.

  • Kosɛnga litambwisi “Tambwisá ngai na nzela ya mitindo na yo, mpo nasepeli na yango.”​—Nzembo 119:35.

  • Kosɛnga makasi “Baluká epai na ngai mpe moniselá ngai boboto. Pesá mosaleli na yo makasi na yo.”​—Nzembo 86:16.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto