Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 1/95 lok. 8
  • Tósalisa bazalani na biso ete báyeba solo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tósalisa bazalani na biso ete báyeba solo
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1995
  • Masolo mosusu
  • Bakoyoka na nzela nini soki tozongi kotala bango te?
    Mosala na biso ya Bokonzi—1995
  • Tómekola Yehova na komibanzabanzáká mpenza mpo na bazalani na biso
    Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Osalelaka mwa babuku oyo?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2012
  • Makanisi mpo na ndenge ya kobanda masolo na mosala ya kosakola
    Mosala na biso ya Bokonzi—2005
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1995
km 1/95 lok. 8

Tósalisa bazalani na biso ete báyeba solo

1 Yesu ayaki na mabele mpo na kotatola na ntina na solo. Abongisaki bayekoli na ye lokola balakisi mpo ete básakola epai bazalani. Andimisamaki solo ete bakokokisa mokumba na bango malamu, yango wana abengaki bango ‘balakisi liboso na bato banso.’ (Mat. 13:52, NW) Akokanisaki moko na moko na bango na moto ya mayele oyo azali na biloko ya motuya ya solo kati na yango akoki nde kotóka. Lelo oyo, bayekoli na Yesu bazali kosalela mikanda minyatami mpo na kokolisa mosala ya kosakola Bokonzi. Na ndakisa, masangá mingi mazali, na mwa babuku ekeseni mpo na kosalisa bazalani ete bálanda Yesu. Lolenge nini kosalela mwa bisaleli wana ya motuya?

2 Mpo na kobanda lisolo oyo ekopesa nzela na kotika mwa buku “Elikya ya solo mpo na ntango ezali koya​—Ndenge nini kozwa yango,” tokoki kotuna motuna oyo:

◼ “Osilá komituna soki mpo na nini makanisi ya kozala na elikya ya solo mpo na ntango ezali koya emonanaka molili mpenza, ata bato bazali kosala milende makasi? [Tiká moto yango ayanola.] Biblia ezali kolimbola mpo na nini milende yango mizali kolonga te.” Tángá Nzembo 146:3, 4. Nsima na kokanisa elongo na molobani na yo na ntina na paragrafe 6, tokoki kotuna: “Nani akoki kopesa biso ya boumeli?” Na kotalela eyano ya molobani na biso, tokoki kolobela makanisi mosusu ya paragrafe 7, to kokamata bibongiseli mpo na kolobela yango na ntango ya bozongeli mosusu na mbala ekoya.

3 Talá lolenge ya kosalela mwa buku “Nzambe azali oyo azali kokanisa biso?”:

◼ “Bato mingi bamitunaka motuna oyo mozali na nse ya bililingi mibale oyo. [Tángá motuna na nse ya nkasa 6 mpe 7, mpe tiká moto yango ayanola.] Mpo ete Nzambe ya bolingo akoki soki moke te kozala na mbala moko mobandisi ya malamu mpe mobandisi ya mabe, okanisi nini mpo na elaka oyo ezwami na Yisaya 65:21-24?” Soki bakomentere ya moto yango emonisi mwa litomba, na nsima tokotalela paragrafe 37 mpo na kolimbola makambo oyo Bokonzi ya Nzambe ekosala.

4 Soki tozali kolakisa mwa buku “Tokoki kolikia malamu koleka bomoi oyo,” tokoki koloba:

◼ “Bato mingi bazali kokanisa ete bomoi ezali bobele kolandana ya mikumba ya mpasi mpe ya lolenge bobele moko. Na likanisi na yo, esengeli kosala nini mpo ete ezala malamu koleka? [Tiká moto yango ayanola.] Biblia ezali komonisa ete Nzambe azali kobombela biso biloko kitoko. Talá oyo elobami kati na Emoniseli 21:4,5.” Soki yango emonani malamu, na nsima tólobela makanisi mosusu ya paragrafe 42 ya mwa buku.

5 Mosakoli moko elenge mpenza akoki kotuna, wana azali kolakisa mwa buku “Sepela na bomoi ya seko na mabelé!”:

◼ “Olingi kozala na bomoi na mabele oyo ekokóma paladiso lokola oyo? [Lakisá ezipeli mpe lokasa 32, mpe tiká moto yango ayanola.] Libota na ngai mpe ngai moko tozali kolikya kozala na bomoi kati na makambo motindo oyo, na ntina na oyo Biblia elobi kati na Yoane 17:3.” Soki, nsima na botángi na mokapo, molobani amonisi mwa bosepeli, tokosɛnga ete tótikela ye mwa buku ete atánga yango.

6 Soki tozali kosalela mwa babuku mosusu kati na mosala ya kosakola na sanza oyo, tokoki koyokanisa maloba ya biso ya ebandeli mpe mikanda na biso na makanisi oyo touti kotalela. Tóbosana te mpo na koloba na mokuse mpe kosala bakomantere ya malamu mpe ya kolendisa, mpo na kolamusa mposa ya molobani na biso.

7 Yehova asili komonisa biso solo. Tosengeli kosalela mabaku nyonso oyo mazali kopesamela biso mpo na kopalanganisa yango, na nzela ya mikanda minyatami mpe na kosololaka elongo na bato oyo tozali kokutana na bango. Na boye tokomonisa ete tozali balakisi liboso na bato banso mpo na bolamu ya seko ya bazalani na biso.​—Mat. 28:19, 20.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto