Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 1/95 lok. 8
  • Bakoyoka na nzela nini soki tozongi kotala bango te?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bakoyoka na nzela nini soki tozongi kotala bango te?
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1995
  • Masolo mosusu
  • Tósalisa bazalani na biso ete báyeba solo
    Mosala na biso ya Bokonzi—1995
  • Ndenge ya kobanda koyekola Biblia na bato oyo totikelaka bazulunalo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2007
  • Tóyika mpiko mpo na kosala bozongeli ya sika
    Mosala na biso ya Bokonzi—1997
  • Kozongela bato epesaka nzela na boyekoli ya Biblia
    Mosala na biso ya Bokonzi—2003
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1995
km 1/95 lok. 8

Bakoyoka na nzela nini soki tozongi kotala bango te?

1 “Bakoyoka na nzela nini soki bazangi mosakoli?” (Lom. 10:14) Ɛɛ, bakokanga ntina ya solo lolenge nini soki tozali kosala bozongeli ya molende te? Moto nyonso oyo epai na ye tolobelaki na ntina na Bokonzi abongi ete tózonga mpo na kotala ye. Sanza oyo, mbala mosusu tokozala na likoki ya kozongela lisolo oyo tosololaki na mbala eleki, na kobakisáká makanisi ya Biblia oyo mauti na mwa buku oyo totikelaki ye; yango ekopesa biso nzela mpo ete tóbanda boyekoli ya Biblia.

2 Soki totikaki mwa buku “Elikya ya solo mpo na ntango ezali koya​—Ndenge nini kozwa yango,” tokoki kotuna motuna oyo:

◼ “Osepeli kozala na bomoi kati na mokili epai kuna libota na yo mpe yo moko okondimisama mpo na kozwa kimya ya solo na mikolo mizali koya? [Tiká moto yango ayanola, nsima na yango bótalela paragrafe 2.] Biso nyonso tozali koyoka mposa yango, atako mingi bazali kobɛta ntembe ete yango ekokóma mokolo mosusu. Mpo na Nzambe, oyo alakaki kokómisa ndɔtɔ yango likambo ya solo, yango ezali likambo ya mpasi te. Tótánga Yisaya 32:17, 18 kati na paragrafe 2, to kati na Biblia na biso. Na nsima tólimbola ete, kati na mokili mobimba, bato bazali koyoka esengo mpe kimya ya elimo oyo ezali kouta na elikya ya mikolo malamu mizali koya. Tótalela makanisi ya Biblia oyo matyami na paragrafe 3, na nsima, tómonisa na molobani na biso ete boyekoli ya mwa buku ekoki kosalisa ye ete ayeba lisusu makambo mingi koleka na ntina na yango. Soki asepeli, tózwa bibongiseli mpo na kozonga na ntango ebongi mpo ete tókoba lisolo.”

3 Ntango tozali kozongela moto nsima ya kotikela ye mwa buku “Nzambe azali oyo azali kokanisa biso?,” mbala mosusu ekozala malamu koloba ete:

◼ “Ntango nayaki mbala eleki, tobimisaki motuna oyo: Nzambe azali oyo azali kokanisa biso? Okanisi ete Nzambe azali komibanzabanza koleka mpo na biso mpo ete alongola mpasi mpe mobulu? [Tiká moto yango ayanola, na nsima lobelá makanisi ya paragrafe 32.] Nzambe alaki kosala mokili ya sika oyo etondi na bato malamu oyo bakofanda na kimya mpo na kokitana mokili mabe ya ntango oyo. [Tángá Nzembo37:11.] Biso mpe, tokoki koyeba mokili wana ya sika soki tondimeli Biblia mpe soki tozali kosalela batoli na yango.” Tólimbola bibongiseli oyo bikamatami na Batatoli mpo na kosalisa bato báyekola Biblia.

4 Na ntango tozali kozongela moto moko oyo andimaki mwa buku “Tala, nazali kozalisa biloko nyonso biloko ya sika,” tokoki liboso kolakisa elilingi ya ezipeli, na nsima kotuna motuna oyo:

◼ “Lolenge nini ozali komona kati na makanisi na yo bomoi kati na mokili ya kokoka? [Tiká moto yango ayanola.] Makambo oyo ozali komona likoló na ezipeli ezali makanisi ya mpamba te; makambo oyo matongami likoló na bilaka ya solo oyo bizwami kati na Biblia. [Tángá Emoniseli 21:4 mpe Nzembo 37:11, 29.] Nalingi kolimbwela yo lolenge nini okoki, elongo na libota na yo, komeka bolamu yango.” Soki molobani na biso asepeli, tókoba lisolo mpe tósɛnga koyekola Biblia elongo na ye.

5 Na ntango tozali kokutana na bato ya motema sembo oyo bazali koluka solo, tozali komonisa bolingo na biso ya solo na kozongáká kosalisa bango ete básalela makambo oyo bayokaki. Tokosalela solo ya bulɛɛ oyo epesameli biso mpo na bolamu na biso ya seko mpe oyo ya baoyo bazali koyoka biso.​—1 Tim. 4:16.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto