Batrakte Nsango ya Bokonzi ezali na ntina mingi mpo na bato banso
1 Uta mokolo ya 24 Aprili, tozali kokabola batrakte Nsango ya Bokonzi oyo ezali na ntina mingi; yango ezali kolamwisa mposa ya bato oyo bazali komitungisa kati na mokili mobimba. Nsango ya batrakte yango esuki te bobele na koyebisa makambo oyo mazali kobima lelo, kasi ezali lisusu nsango moko ya ntina mingi koleka. Basakoli ya masangá mingi bazali kosimba mosala wana na motema na bango mobimba, awa ezali bango na mposa makasi ya koyebisa nsango yango epai ya bankóto ya bato. Ozali kosangana mingi kati na mosala yango?
2 Liboke ya batrakte Nsango ya Bokonzi etindamaki na lisangá moko na moko, na boye ete mosakoli moko asengelaki kozwa batrakte soko 50 mpe mobongisi-nzela moko na moko batrakte 200. Motuya boni okabolaki? Soki olongaki te kokabola motuya oyo okanaki, osili kokanisa likoló na myango oyo okoki kosalela mpo na kokabola yango mingi liboso ete ekoka kosila kati na libombo ya mikanda ya lisangá? Mpo na nini te kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi? Okoki kozwa litomba na makita ya mosala ya kosakola oyo mabongisami na boumeli ya pɔsɔ, na ndakisa, na kosanganáká na oyo mazali kosalema na mpokwa?
3 Bankulutu basengeli kosɛnzɛla na likebi mpenza ete teritware mobimba esilisama. Soki lisangá lizali na likoki te ya kokóma na biteni mosusu ya teritware, bakosɛnga na masangá mosusu oyo mazali pene ete masunga bango. Milende na biso ya solosolo mpe kosala na boyokani kati na masangá ekosala mpenza ete mosala nyonso mokokisama.
4 Kati na mosala ya kosakola, na ntembe te ozali koyoka esengo mingi awa ezali yo komona ete ebele ya bato, ezala basakoli ya sika mpe bilenge oyo bazali kati na lisangá, bazali na likoki ya kosangana kati na yango. Tozali kolikya ete esengo yango ekoumela mpe ekopusa moto na moto ete akende lisusu kotala bato oyo basepelaki na nsango yango. Biso banso tolendisami na kozwa banɔti ya sikisiki na lokasa ya ndako na ndako mpe kokoma makambo nyonso matali bato bamonisi bosepeli. Ekozala malamu ete tókoba kosala bozongeli ya sika na boumeli ya basanza oyo ekolanda na kozaláká na mokano ya kobanda boyekoli ya Biblia.
5 Okoki koloba nini ntango ozongeli moto? Okomona ete ekozala malamu koloba boye: “Ozali koyeba lisusu trakte oyo nautaki kotikela yo kala mingi te; nakanisi ete okozwa ntango ya kotánga yango mpe ya kokanisa mwa moke likoló na yango. Bato ya kartye na bino balobelaki mingi nsango oyo ezali kati na yango, mpamba te ezali kolobela makambo ya ntina mingi oyo matali bato banso.” Lobelá mwa makambo oyo mazali kopusa na kokanisa, oyo mazali na lokasa ya mibale mpe tuná ye ete: “Na makanisi na yo, nini tosengeli kosala mpo na komilɛngɛla liboso na makambo oyo mabombami mpo na biso na mikolo mizali koya?” Tiká moto yango ayanola. Soki amonisi bosepeli, bótalela makambo mosusu oyo mazali na lokasa 2 kino na lokasa 4 ya trakte Nsango ya Bokonzi, mpe sɛngá ete bóyekola Biblia to, soki likoki lizali te, lakisá ye nimero ya sika ya zulunalo.
6 Soki bosakolaki na teritware ya lisangá mosusu, bóbosana te kopesa nkombo ya moto nyonso oyo amonisaki bosepeli na ntina ete basakoli ya lisangá yango bákende kotalaka bato yango. Bobele bongo, soki bapesi yo moto ya sika, kozanga te kozongela ye nokinoki.
7 Kokabolama ya batrakte Nsango ya Bokonzi ememeli biso bosepeli makasi mpe elendisi moko na moko kati na biso ete abakisa milende mpo na kosakola Bokonzi. Tokoki kondimisama ete kampanye yango ekopesa litomba monene mpe ekosalisa bato na mokili mobimba ete báyeba malamumalamu nkombo monene ya Yehova mpe mokano na ye ya kokamwa. (Yis. 12:4, 5) Soki tokomipesa mingi na mosala ya kosakola, boye esengo mpe ekobakisama mingi koleka.—Nz. 126:3.