Tókólisa mbuma ya bosepeli oyo ebimisami na trakte Nsango ya Bokonzi
1 Kobanda mwa bapɔ́sɔ, tozali na esengo mpe libaku malamu ya kokabola Nsango ya Bokonzi No. 35 oyo ezali na motó na likambo ete: “Mokolo mosusu bato nyonso bakolingana?” Bipai nyonso, basakoli bazali kosala milende mpo na kokabola trakte yango epai na bato mingi mpenza oyo bazali na makanisi “mabongi.” (Mat. 10:11, NW) Kampanye oyo esengeli mpenzampenza kosila na mokolo ya eyenga 14 Desɛ́mbɛ, kasi soki ndambo mosusu ya teritware esalelami naino te, bankulutu bakoki ntango mosusu kosɛnga na biso ete tókóba kokabola Nsango ya Bokonzi No. 35 kino trakte nyonso oyo lisangá ezwaki ekosila kokabolama.
2 Ebimeli oyo ya Nsango ya Bokonzi ezali kosepelisa bato mingi. Bazali komona ete bolingo ya motema mpo na bazalani ezalaka lisusu te epai na bato mingi ya ntango na biso, na yango bazali komituna soki mokili ekozala ndenge nini na mikolo mizali koya. (2 Tim. 3:3) Lokola bosepeli esili kolamwisama, tolingi kokólisa yango.
3 Kokabolama ya Nsango ya Bokonzi ezali kobota mbuma: Na boumeli ya kampanye oyo ebongisamaki na 1995, mwasi moko oyo azwaki trakte Nsango ya Bokonzi ayaki koyangana na likita moko na Ndako ya Bokonzi mpo na koyeba makambo mosusu mingi likoló na bindimeli ya Batatoli ya Yehova. Andimaki mbala moko mpe na esengo boyekoli ya Biblia mpe, na nsima, azangisaki mpenza makita te. Liboso mpenza, asɛngaki ete bálongola nkombo na ye na mikanda ya Lingomba oyo ye azalaki.
4 Lelo, bankámá ya bato kati na teritware na biso basili kotánga nsango oyo ezali kati na Nsango ya Bokonzi No. 35. Kasi lolenge nini bayambaki yango? Atako makambo oyo batángaki masimbaki mitema na bango, nzokande mingi kati na bango bakosala eloko te longola bobele soki Motatoli moko ya Yehova azongi kotala bango. Tozali komibongisa mpo na kozonga kotala bato yango? Komibanzabanza mpo na bazalani na biso, komibanzabanza oyo esimbami na bolingo, esengeli kopusa biso. Tosengeli kozongela baoyo nyonso bamonisaki bosepeli mpo na Nsango ya Bokonzi.
5 Tokoloba nini na bozongeli ya sika? Tokoki kobakisa mwa maloba mpo na komonisa ete nsango oyo elobelami na trakte Nsango ya Bokonzi etaleli mpenza ntango na biso, mpe tokotuna motuna moko oyo ekotinda molobani na kokanisa. Tóyoka molobani na biso na likebi mpenza mpo ete tósosola likanisi na ye. Na nsima, tóbenda likebi na ye na likanisi moko libongi mpenza oyo lizwami kati na mwa búku Azali kosɛnga, mwa búku oyo elobelami na Nsango ya Bokonzi. Soki moto yango asepeli, tómeka mbala moko kobanda boyekoli ya Biblia.
6 Talá mwa lolenge ya kobanda lisoló na ntango ya bozongeli ya sika epai na bato oyo bamonisaki bosepeli na “Nsango ya Bokonzi” No. 35:
◼ “Nakanisi obosani te mwa lokasa oyo nautaki kotikela yo. Yango ezali kolobela ntina monene oyo bato bazali kokabwana lelo kati na mokili: ezali bongo kozanga bolingo mpo na bazalani.” Tóndimisa maloba yango na komonisáká makambo oyo mayebisami na lokasa ya mibale ya Nsango ya Bokonzi, na nsé na motó na likambo oyo: “Bolingo mpo na bazalani esili kokóma mpiɔ.” Na nsima tótuna: “Okanisi ete Nzambe alingi ete bato bázala na bomoi ya lolenge wana?” Tóyoka eyano. Tófungola mwa búku Azali kosɛnga na liteya 5 mpe tómeka kobanda boyekoli ya Biblia.
◼ “Ntango tokutanaki na mbala ya liboso, natikelaki yo mwa lokasa oyo ezalaki na motuna oyo: ‘Mokolo mosusu bato nyonso bakolingana?’ Okanisi ete yango ekoki kosalema na mokili mobimba?” Tóyoka eyano. Tófungola mwa búku Azali kosɛnga na liteya 6 mpe tótánga paragrafe 6. Na nsima, tótánga elaka ya Nzambe oyo ezwami na Mika 4:3, 4. Soki emonani ete molobani na biso asepeli, tósɛnga ye ete azwa mwa búku mpe ayekola Biblia elongo na biso.
◼ “Mbala ya liboso oyo tokutanaki, natikelaki yo mwa lokasa oyo ezalaki na motuna: ‘Mokolo mosusu bato nyonso bakolingana?’ Yango ezali kosɛnga na bato boyekoli ya Biblia na bandako na bango kozanga kofuta mbongo. Nazongi kotala yo mpo na kolakisa yo mokanda mokolimbolaka Biblia oyo tosalelaka. [Tómonisa búku Boyebi.] Búku oyo ezali koyebisa polele ntango nini tokomona bato kolingana bamoko na bamosusu, mpe búku yango ezali kopesa biyano na mituna oyo ntango mosusu omitunaka: Mpo na nini tonunaka mpe tokufaka? Mpo na nini Nzambe atiki nzela na bampasi? Nini ekómelaka balingami na biso oyo bazali kokufa?” Mpe tótuna ete: “Olingi nalakisa yo lolenge boyekoli yango ya Biblia esalemaka?” Soki moto yango aboyi, tótuna ye soki alingi kotánga bobele búku. Soki ezali bongo, tótikela ye búku moko mpe tóyebisa ye ete mosala na biso ya koteya Biblia epai na bato nyonso ezali kosalema na mokili mobimba mpe esimbami na makabo ya bolingo malamu. Tóyokana mpo na kozongela ye lisusu.
7 Ntango tokosilisa kokabola Nsango ya Bokonzi No. 35 na teritware mobimba, tokoki kolakisa búku Boyebi na mikolo ya sanza oyo mitikali. Mpo na kolakisa yango, tokoki kozwa makanisi mingi na lokasa ya nsuka ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Yúni 1996; ya Yulí mpe ya Desɛ́mbɛ 1996; mpe ya Yulí 1997.
8 Kokabolama ya Nsango ya Bokonzi ezali libaku mpo na mokomoko kati na biso ete akólisa milende na ye kati na mosala ya kosakola. Na lisungi ya Yehova, tokoki komindimisa ete kampanye oyo ekobimisa matomba: ekopesa nzela na bato báyeba ete mokano ya Nzambe ezali ete bato bálingana bamoko na bamosusu. Tiká ete Yehova akóba kopambola milende na biso mpo ete tóbimisa mbuma na bosepeli oyo ebimisami na Nsango ya Bokonzi!