Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 11/95 lok. 3
  • Mpo na nini kokoma bisika oyo bato bazalaki te?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mpo na nini kokoma bisika oyo bato bazalaki te?
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1995
  • Masolo mosusu
  • Soki okuti bato na ndako te
    Mosala na biso ya Bokonzi—2007
  • Kampanye ya monene Ekosalema kobanda mokolo ya 16 Ɔkɔtɔbɛ tii ya 12 Novɛmbɛ!
    Mosala na biso ya Bokonzi—2006
  • Ozalaka na teritware ya yo moko?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2006
  • Teritware ya lisangá na bino eleki monene?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2002
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1995
km 11/95 lok. 3

Mpo na nini kokoma bisika oyo bato bazalaki te?

1 Mobali moko mpe mwasi na ye oyo bazali Batatoli babimaki na ntɔngɔ mpenza mpo na kosakola. Na nsima, na mpokwa ya mokolo wana, bazongelaki bato oyo bazalaki na ndako te ntango balekaki na ntɔngɔ. Mobali moko akɔtisaki bango na ndako mpe ayokaki bango na likebi mpenza. Azwaki buku Bomoi ya seko mpe atunaki bango soki bakozonga lisusu. Ezalaki mbala na ye ya liboso ya kosolola na Batatoli ya Yehova mpe azalaki na mituna mingi ya kotuna bango; boyekoli ya Biblia ebandaki. Babalani wana bazalaki na esengo monene ya kokutana na moto oyo akokani na mpate. Tokolinga mpe ete likambo yango likoka kokómela biso? Yango ekoki kosalema soki tozali kokoma malamumalamu bisika oyo bato bazalaki te mpe soki tozali kozongela bango nokinoki.

2 Mbala na mbala, tozali kolendisama ete tózwaka banɔti ya sikisiki mpe ete tózongelaka bato kozanga koumela. Lokola lisolo oyo touti kolobela limonisi yango, tokoki kozwa matomba malamu na kozongáká na bandako ya bato na mpokwa ya mokolo wana. Lokola tozalaka na ekateli makasi ya kosilisa teritware oyo bapesi biso, mbala mingi tozangaka kokoma, na lolenge lobongi, bisika oyo bato bazalaki te. Bamoko bazali koloba ete: ‘Tozali kosala teritware na biso nsima na pɔsɔ mibale nyonso to nsima na pɔsɔ misato nyonso; ntina ya kokoma bisika ya bato ya teritware yango ezali te mpo ete tokozonga lisusu.’ Nzokande, yango ezali ntina mosusu mpo na yango, tosengeli kokoma bisika na bango. Ya solo, kati na bateritware oyo esalemaka mingi, tokomonisa ete tozali koluka malamumalamu bato oyo babongi na nsango, bobele soki tozali kosala makasi mpo na kokutana na bato oyo bazalaki na ndako te na ntango tolekaki. Ndenge nini?

3 Kati na bitúká mingi, soko 50 % ya bafandi na yango bazalaka epai na bango te na moi. Na yango, na kotyáká likebi mingi likoló na bato oyo tokutaki bango te, tozali koyeisa teritware na biso monene. Ata kati na bateritware oyo esalemaka mingi te, tokoki kozwa matomba malamu na kosaláká makasi mpo na kokutana na bato banso liboso ete tózongisa teritware.

4 Mingimingi na boumeli ya pɔsɔ, tokoki komibongisa mpo na kozonga, na mokolo mosusu, epai na bato oyo bazalaki te. Basusu basepelaka kozonga na mokolo mokeseni na oyo ya boleki na bango ya liboso mpe na ngonga oyo ekeseni. Okopona mbala mosusu komibombela ntango na mokolo ya pɔsɔ mpe na mokolo ya lomingo mpo na kozonga epai na bato oyo bazalaki epai na bango te na boumeli ya pɔsɔ. Epai mosusu, masangá mingi masili komona ete kosakola na mpokwa ebimisaka matomba malamu mpenza. Kati na bangonga wana ya bopemi nsima na mosala, basakoli bazali kokutana mpenza na motango moleki monene ya bafandi na teritware.

5 Osengeli kokoma bato oyo boyokani mpo na kozongela bango na lokasa mosusu. Soki likoki ezali te mpo na kozongela bato oyo bazalaki te, okopesa banɔti na yo ya ndako na ndako epai na ye oyo azali kokamba etuluku, na boye ete bandeko mibali mpe bandeko basi oyo bakosakola na mbala ya nsima kati na teritware básalela yango.

6 Na kotyáká likebi makasi likoló na lolenge oyo ya mosala na biso, tokobota mbuma mingi koleka mpe esengo na biso ekobakisama. Tokozwa bosepeli, koyebáká ete tozali koluka na lolenge ya malamu mpenza bato oyo bakokani na bampate mpe tozali kobatela bango.​—⁠Ezek. 34:​11-14.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto