Manáka ya liyangani ya zongazonga ya mbala ekoya
“Tóbatela ntango nyonso na makanisi mokolo ya Yehova,” yango ezali motó na likambo ya liyangani ya zongazonga ya mbala ekoya oyo ekobanda na Sɛtɛ́mbɛ. (2 Pet. 3:12) Ebongisamaki mpo na kopusa biso na kosala makambo oyo makolobama. Mosika te lisambisi ya Yehova ekokwela bafandi ya mabelé. Nani akobika na “mokolo monene ya Nzambe Mozwi na Nguya Nyonso?” Bobele baoyo bazali kosɛnzɛla na elimo mpe bomoi na bango etambwisami na “bizaleli ya bulɛɛ mpe na kosambela Nzambe.”—Emon. 16:14; 2 Pet. 3:11.
Mpo na kobika na mokolo ya Yehova, esengeli kozwa batisimo. (1 Pet. 3:21) Basakoli oyo basepeli kosala yango na liyangani oyo basengeli koyebisa mokɛngɛli-mokambi, oyo akozwa bibongiseli bisengeli.
Masukúlu-matongani na biteni minei, oyo mazali na motó na likambo “Lolenge ya bato oyo tosengeli kozala,” makomonisa polele lolenge ya kosala mpo na kobatela ntango nyonso na makanisi kozala ya mokolo ya Yehova. Lisukúlu ya bato nyonso, oyo ekozala na motó na likambo “Sala na mayele liboso ya boyei ya mokolo ya Yehova,” ekolimbola soki ‘koluka Yehova, koluka boyengebene mpe bopɔlɔ’ elingi koloba nini mpo na kozala moko kati na baoyo bakobika.—Sef. 2:3.
Liyangani ya zongazonga ekosuka na masukúlu mibale ya kolendisa oyo ekosalema na bakɛngɛli-batamboli mpe mazali na motó na likambo “Bomoi na yo etambwisami na solo?” mpe “Tómibongisa na kobateláká na makanisi mokolo ya Yehova.” Masukúlu yango makopesa biso libaku ya kokanisa bomoi na biso mpe kosala mbongwana soki yango esengeli. Bisakweli ya Biblia mpe makambo mazali kobima kati na mokili mazali komonisa polele ete mokolo ya Yehova ekómi pene. Manáka ya liyangani oyo ekolendisa biso na ‘kozala na makanisi malamu, mpe kosɛnzɛla.’ (1 Pet. 5:8) Tózwa bibongiseli ya sikisiki mpo na koyangana na yango.