Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 6/96 lok. 7
  • Biyano na Mituna na Bino

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biyano na Mituna na Bino
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Masolo mosusu
  • Lolenge ya kozalisa bayekoli na lisalisi ya búku Boyebi
    Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Biyano na mituna na bino
    Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Bato bazali na mposa ya boyebi ya Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Tózala na makanisi malamu likoló na mosala ya kozalisa bayekoli oyo ezali kosalema na lombangu
    Mosala na biso ya Bokonzi—1998
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1996
km 6/96 lok. 7

Biyano na Mituna na Bino

◼ Sikawa lokola tozwi búku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko, na boumeli ya ntango boni tosengeli koyekola elongo na moto?

Mosala na biso ya Bokonzi ya Sɛtɛ́mbɛ 1993 esɛngaki ete boyekoli ya Biblia epai na moto ya sika esengeli kolandama kino mikanda mibale mikosila. Sikawa lokola tozwi búku Boyebi, ekozala malamu ete tóbongola lolenge wana ya kosala, engebene makanisi oyo mamonisami na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yanuáli 1996 na nkasa 13 kino 14.

Búku Boyebi ebimisami mpo na kosalisa baoyo ‘balingi kozwa bomoi ya seko’ ete báyekola makambo oyo bazali na yango mposa mpo na komipesa epai na Yehova mpe kozwa batisimo. (Mis. 13:48) Na yango, ntango búku yango ya sika esili, ekosengela te koyekola mokanda mosusu ya mibale. Na meko oyo bayekoli ya Biblia bazali kondima solo, tokoki kolendisa bango mokemoke ete bábakisa boyebi na bango na koyanganáká na makita ya Batatoli ya Yehova mpe na kotángáká Biblia mpe mikanda ndenge na ndenge ya boklisto.

Ekozala ntina mpenza ete tómesana na mituna oyo mizwami na nkasa 174 kino 218 ya búku Lisanga mpo na kokokisa mosala ya Nzambe. Ata soki tosengeli te kotánga mituna yango to kotalela yango elongo na moyekoli ya Biblia, ekozala malamu ete tóbimisa polele kati na búku Boyebi makambo oyo makopesa ye nzela ete amonisa mayele na ye likoló na mateya ya moboko ya Biblia ntango bankulutu bakotalela elongo na ye mituna yango mpo na batisimo na ye.

Ntina ezali te ya kobakisa makambo mosusu likoló na oyo mazali kati na búku Boyebi na kolukáká na libándá ya búku yango makanisi mosusu mpo na kondimisa mateya ya Biblia to kokweisa mateya ya lokuta. Yango ekoumelisa boyekoli. Ekozala nde malamu ete búku yango esila noki, mbala mosusu na boumeli ya basanza motoba. Yango wana ezali ntina mpo na biso ete tóyekola liboso mpe na mozindo makambo oyo mazwami kati na yango mpo na kozala na likoki ya kolakisa yango polele mpe na bosikisiki. Moyekoli mpe asengeli kolendisama ete abongisaka boyekoli, kotánga bavɛrsɛ́ oyo ipesami mpe kosala milende ya kososola makambo oyo mokapo moko na moko ezali koteya.

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elobelaki mingi ntina mpo na Batatoli ya Yehova ya kotambwisa boyekoli ya Biblia ya malamu mpe mingi na ntango mokuse. (Talá Yisaya 60:22.) Na kosaleláká malamumalamu búku Boyebi, tokoki kosalisa bato ya sika ete bázwa boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko mpe na kosalela yango.​—Yoa. 17:3.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto