Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 11/96 lok. 7
  • Biyano na mituna na bino

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biyano na mituna na bino
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Masolo mosusu
  • Tózala na makanisi malamu likoló na mosala ya kozalisa bayekoli oyo ezali kosalema na lombangu
    Mosala na biso ya Bokonzi—1998
  • Lolenge ya kozalisa bayekoli na lisalisi ya búku Boyebi
    Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Biyano na Mituna na Bino
    Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Ndenge ya koyekola na moto Biblia tii azwa batisimo—Eteni ya mibale
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2020
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1996
km 11/96 lok. 7

Biyano na mituna na bino

◼ Ntango boni tosengeli koyekola elongo na moto na búku Boyebi?

Lelo oyo, Yehova azali kopambola libota na ye. Mbula na mbula tozali na elembeteli mpo na yango na komona ndenge ebele ya bato ya sika bazali komitya na ngámbo ya solo. Eksperiansi emonisi ete búku Boyebi ezali esaleli moko malamu mpo na koteya solo. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, kati na nimero na yango ya 15 Yanuáli 1996, ebendaki likebi na biso likoló na likambo oyo ete búku wana esalemi mpo na kosalisa moyekoli ya Biblia ete akóla nokinoki; mbala mosusu ekosengela bobele mwa basanza mpo ete azwa batisimo.

Yango wana nimero sé moko wana ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elobaki sikisiki na lokasa 17 ete: “Nsima wana moto asilisi boyekoli na ye kati na búku Boyebi mpe asili kozwa batisimo, ntina ekozala lisusu te ya koyekola elongo na ye búku mosusu ya mibale.”

Tokosala boni soki búku Boyebi ekómi na nsuka nzokande moyekoli akómi naino pene te mpo na kozwa batisimo? Mosala na biso ya Bokonzi ya Yúli 1996, lokasa 6, paragrafe 23, ezongelaki lisusu kolobela toli oyo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli epesaki ya koyekola búku mosusu ya mibale te nsima ya kosilisa búku Boyebi. Yango elimboli ete tosengeli kotika kosalisa moyekoli mpo ete akóla? Te. Tolingi ete bato bázwa boyebi ya moboko ya solo. Nzokande, epai na bato mingi, moteyi malamu, akokoka, na ntango mokuse, kosalisa moyekoli ya motema sembo ete akóla mingi mpo na kozwa ekateli ye moko ya kosalela Yehova. Na kotalela ezalela na bango, ekoki kozala ete bayekoli mosusu balingaka kútu koyekola mbala mingi na pɔ́sɔ.

Tosengeli koyeba ete bayekoli mosusu bakólaka nokinoki te lokola basusu. Kasi soki nsima ya kosilisa koyekola búku Boyebi, oyo mbala mosusu eumelaki ntango molai, moto akómi naino te na kozwa ekateli ya kosangana na lisangá, ekozala malamu ete mosakoli asolola likambo yango elongo na nkulutu moko ya komité ya mosala. Soki ezali na makambo mosusu ya sikisiki, lisalisi mosusu likoki kopesama na boyokani na etindá epesami na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yanuáli 1996, lokasa 17, paragrafe 11-12.

Moyekoli oyo basili kosalisa ye na koyeba solo, ata soki ezali bobele na makambo ya moboko, asengeli komiyoka ete apusami na koyangana na makita ya boklisto. Yango ekomema ye mbala mosusu na komonisa polele ete alingi kosalela Yehova. Nzokande, soki nsima na koyekola na boumeli ya ntango molai búku Boyebi, moyekoli azali komonisa te ete azali kozwa makambo ya elimo na motuya, ekozala malamu kokata boyekoli.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto