Tósalisa bango ete bázongela lisusu mosala
1 Koyebáká ete likámá ya elimo ezalaki liboso ya baninga na ye baklisto, ntoma Paulo akomaki ete: “Oyo ezali ntango ete bólongwa na mpɔngi, mpamba te sikawa lobiko na biso esili kobɛlɛma koleka na ntango oyo tokómaki bandimi.” (Lom. 13:11, NW) Paulo azalaki komibanzabanza mpo na bandeko na ye oyo balalaki mpɔngi na elimo; lobanzo na ye ezalaki ya kolendisa bango ete bázongela lisusu molende mpo na kosakola.
2 Tokoki mpenzampenza koloba ete butu ya mokili oyo monuni esili kopusana mpe ete ntɔ́ngɔ́ ya mokili ya sika elingi kotana. (Lom. 13:12) Tozali na bantina malamu ya komibanzabanza mpo na bandeko na biso oyo batiki kosangana elongo na biso na mosala ya kosakola nsango malamu. Na mbula eleki, bobele na États-Unis, koleka basakoli 27 000 bazongelaki kosakola. Lolenge nini tokoki kosalisa baklisto mosusu oyo bazali kosakola lisusu te ete bázongela kosalela Yehova?
3 Oyo bankulutu bakoki kosala: Mingi kati na baklisto oyo batiki kosakola baboyi solo te; batiki nde kosakola na ntina na bolɛmbu, mikakatano na bango moko, mposa ya kozala na biloko mingi ya mosuni to mitungisi mosusu ya bomoi. (Luka 21:34-36) Soki likoki ezali, ebongi malamu kosalisa basakoli liboso ete bátika kosakola. Soki mosakoli moko abandi kozangisa basanza mosusu mpo na kopesa lapólo ya mosala na ye, mokomeli ya lisangá akoyebisa motambwisi ya boyekoli ya mokanda epai mosakoli yango ayanganaka. Bibongiseli bikokamatama mpo na kokende kotala ye. Bankulutu basengeli kosala makasi mpo na koyeba ntina mpenza ya mokakatano oyo azali na yango mpe lisalisi oyo bakoki kopesa.—Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Sɛtɛ́mbɛ 1993, nkasa 20-23.
4 Lolenge nini tokoki kopesa oyo na biso lisalisi: Mingi kati na biso bayebi ndeko moko oyo atiki kosakola. Ekoki kozala ndeko oyo tokangamaki na ye makasi na mikolo mileki. Tokoki kosala nini mpo na kosalisa ye? Mpo na nini te kokende kotala ye na ndako na ye mpo na mwa ntango moke? Yebisá ye ete ozali koyoka mpasi na motema lokola ozali komona ye te. Zalá na esengo mpe na maloba ya kolendisa. Monisá ye ete ozali komibanzabanza mpo na ye, kozanga komonisa ye ete azali mpenza na bokɔnɔ na elimo. Lobelá masoló ya kolendisa to makambo mosusu ya malamu oyo mazali kosalema na lisangá. Lobelá ye na esengo nyonso makambo matali liyangani ya etúká “Bamemi-nsango ya kimya ya Nzambe.” Lendisá ye ete ayangana na liyangani ya etúká soki yango esalemi naino te. Kozongela kosangana lisusu elongo na lisangá ekosalisa ye mbala mosusu koleka myango mosusu nyonso. Yebisá ye ete okoleka kokamata ye mpo na kokende na makita. Yebisá epai na bankulutu nini ezalaki mayoki na ye.
5 Ntango moklisto moko oyo atikaki kosakola ayei na makita, akomiyoka mpenza malamu te na komona lisusu bandeko mosusu oyo ayebaki bango. Kotuna ye te ete: “Okendáká wapi?” Na esika ya kosala bongo, salisá ye amiyoka ete ayambami malamu. Sololá elongo na ye. Lakisá ye epai na baoyo bayebi ye te. Fandá esika moko na ye na boumeli ya likita mpe omindimisa ete azali na búku ya nzembo mpe mikanda oyo bozali koyekola. Lendisá ye ete ayaka mpe monisá ye ete okozala pene na kosalisa.
6 Lokola bazali na bolingo mozindo ya motema mpo na baoyo bazali kobunga nzela, Yehova mpe Yesu basepelaka ntango bato motindo wana bazongeli makasi na bango na elimo. (Mki. 3:7; Mat. 18:12-14) Biso mpe tokozala na esengo motindo moko soki tolóngi kosalisa baklisto ete bázongela kosalela lisusu Yehova.