Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 7/96 lok. 2
  • Makita ya Mosala mpo na Yulí

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makita ya Mosala mpo na Yulí
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Mitó ya makambo mike
  • Pɔ́sɔ ebandi na 1 Yulí
  • Pɔ́sɔ ebandi na 8 Yulí
  • Pɔ́sɔ ebandi na 15 Yulí
  • Pɔ́sɔ ebandi na 22 Yulí
  • Pɔ́sɔ ebandi na 29 Yulí
Mosala na biso ya Bokonzi—1996
km 7/96 lok. 2

Makita ya Mosala mpo na Yulí

LIYEBISI: Mosala na biso ya Bokonzi ekozala na manáka ya likita ya mosala pɔ́sɔ na pɔ́sɔ na boumeli ya basanza oyo mayangani ya etúká makosalema. Masangá makosala mbongwana oyo esengeli kati na manáka yango na koyebáká ete bákoyangana na liyangani ya etúká “Bamemi-nsango ya kimya ya Nzambe” mpe ete bakosala, na likita ya mosala oyo ekosalema na pɔ́sɔ elandi, bozongeli ya miniti 30 ya makanisi ya ntina ya manáka. Bozongeli wana ya mokolo na mokolo ekopesama liboso na bandeko mibale to misato oyo bazali na eksperiansi, baoyo bakomonisa polele makanisi ya ntina. Lokola ekobongisama malamu, yango ekosalisa basangani ya lisangá na komikundola makanisi ya ntina, na boye ete básalela yango kati na bomoi na bango moko mpe na mosala ya kosakola. Biyano ya bayangani mpe makambo oyo makolobelama masengeli kozala mokuse mpe sikisiki.

Pɔ́sɔ ebandi na 1 Yulí

Loyembo 181

10 mn: Mayebisi mpe Mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi oyo matali lisangá. Lobelá lapólo ya mosala ya lisangá.

15 mn: “Tómekola kondima na bango.” Ekosalema na mituna mpe biyano. Talelá mitindo ya komonisa kondima oyo elobelami kati na etánda oyo ezali na lokasa 13 ya Mosenzeli ya 15 Sɛtɛ́mbɛ 1991. Tuná mituna epai na mosakoli moko to epai na basakoli mibale mpe sɛngá bango ete báyebisa nini esalisaka bango na kosala mosala ya Teokrasi sanza na sanza uta bambula mingi.

20 mn: “Mwa babúku: bisaleli ya motuya mpo na mosala ya kosakola.” Lisoló oyo ekosalema na kotalela makanisi oyo mapesami. Lobelá na mokuse mwa makanisi ya sikisiki ya mwa babúku. Bilakiseli mibale to misato ya mokuse oyo ekomonisa lolenge ya kolakisa yango.

Loyembo 143 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔ́sɔ ebandi na 8 Yulí

Loyembo 63

10 mn: Mayebisi. Lapólo ya kɔ́nti.

15 mn: Tóbongisa bana na biso mpo na mosala ya kosakola. Lisukúlu ekosalema na nkulutu moko. Uta bomwana na bango, bana na biso basengeli kozala na molende elongo na biso kati na mosala ya kosakola. Bakozwa kobongisama moko ya malamu mpe eksperiansi oyo ekosalisa bango na kozala na moboko makasi mpo na kondima na bango mpe molende mpo na bambula ezali koya. Ezali likambo ya ntina mingi ete bátalela mosala ya kosakola lokola eloko moko ya motuya mpe ete bázala na etamboli oyo ebongi. Bana basengeli te kosala mobulu; mosala ya kosakola ezali ntango ya kosakana te. Ezali mpenza malamu mpo na bango ete bázalaka elongo na mikóló na mosala ya kosakola. Mikóló yango bakosalisa bango na kolakisa nsango na kotalela makoki na bango. (Talá Mosenzeli ya 1 Mársi 1989, lok. 22, par. 20.) Baboti bazali na mokumba ya kokɛngɛla bana na bango; basengeli te kotinda bango na makita ya mosala ya kosakola kozanga ete mokóló moko azala wana oyo akotalela bango. Pesá longonya na bana ntango basali likambo moko ya malamu.

20 mn: “Lolenge ya kozalisa bayekoli na lisalisi ya búku Boyebi.” Maloba mokuse ya ebandeli engebene makanisi mapesami na baparagrafe 1-2. Talelá baparagrafe 3-11 na mituna mpe biyano. Yebisá ete baparagrafe mosusu ya siplemá ekotalelama na boumeli ya makita ya mosala ya basanza oyo ekolanda. Lendisá moko na moko ete abatela malamu siplemá yango.

Loyembo 92 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔ́sɔ ebandi na 15 Yulí

Loyembo 157

10 mn: Mayebisi matali lisangá. Yebisá lisusu bibongiseli bikamatami mpo na mosala ya kosakola na wikende mpe lendisá lisangá na kosimba bibongiseli yango. Salá elakiseli ya mokuse oyo ekomonisa lolenge ya kolakisa bazulunalo ya sika.

15 mn: “Masoló ya boninga oyo makoki kosimba motema.” Ekosalema na mituna mpe biyano. Byangá mosakoli moko to basakoli mibale ete báyebisa makambo ya kolendisa oyo ekomonisa mbuma malamu oyo bazwaki na komimonisáká bato na boboto.

20 mn: “Tólóna bosepeli na ntango ya bozongeli ya sika.” Ndeko oyo akopesamela eteni oyo ya likita akosolola elongo na basakoli misato mpo na komonisa ntina ya kozongela baoyo nyonso bamonisaki bosepeli to baoyo bandimaki mikanda. Bazali kotalela makanisi mapesami mpe bazali komimekisa mpo na kosalela yango.

Loyembo 211 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔ́sɔ ebandi na 22 Yulí

Loyembo 6

10 mn: Mayebisi. Yebisá bibongiseli bikamatami mpo na mosala ya kosakola na wikende mpe lendisá lisangá na kosimba bibongiseli yango.

15 mn: “Baboti oyo bazali kosepela!” Lisoló oyo ekosalema na nkulutu moko. Pesá makanisi na lisalisi ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Augústo 1987, nkasa 13-15, paragrafe 14 kino 23 (ebimeli ya Lifalansé).

20 mn: “Tósalisa bango ete bázongela lisusu mosala.” Lisukúlu mpe lisoló ekosalema na nkulutu moko. Sɛngá na bandeko ete básalelaka lisoló “Bozonga epai na ngai, mpe ngai nakozonga epai na bino,” oyo ebimaki na Mosenzeli ya 1 Augústo 1992 na mokano ya kolendisa baklisto oyo batiki kosakola. Lobelá mwa ndambo na makanisi ya ntina.

Loyembo 71 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔ́sɔ ebandi na 29 Yulí

Loyembo 136

15 mn: Mayebisi. Yebisá bibongiseli bikamatami mpo na mosala ya kosakola na wikende. Salá bilakiseli mibale ya mokuse oyo ekomonisa lolenge ya kolakisa bazulunalo ndako na ndako. Lendisá lisangá mobimba na kosimba mosala ya kosakola ndako na ndako.

15 mn: Bamposa ya lisangá. (To lisukúlu ezwami na lisoló “‘Tóyeba kosalela malamu Liloba na Solo’”, oyo ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yanuáli 1996, nkasa 29-31.)

15 mn: Nkulutu moko mpe mosaleli na misala moko bazali kosolola likoló na lisoló “Mabota ya kobanga Nzambe na ntango ya kala​—Ndakisa mpo na ntango na biso,” oyo tozali kokuta na nkasa 20-23 ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Sɛtɛ́mbɛ 1995. Bazali komonisa lolenge mabota ya lisangá na bango makoki kosalela makanisi mapesami.

Loyembo 179 mpe libondeli ya nsuka.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto