Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 7/99 lok. 3
  • Liyangani ya zongazonga ya mbala oyo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Liyangani ya zongazonga ya mbala oyo
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1999
  • Masolo mosusu
  • Manaka ya liyangani ya zongazonga ya mbala ezali koya
    Mosala na biso ya Bokonzi—1998
  • Manáka ya liyangani ya zongazonga na mbala ekoya
    Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Manáka ya liyangani ya zongazonga ya mbala ekoya
    Mosala na biso ya Bokonzi—1997
  • Liyangani ya zongazonga oyo ekosalisa biso tóbatela boyokani malamu na Nzambe
    Mosala na biso ya Bokonzi—2009
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1999
km 7/99 lok. 3

Liyangani ya zongazonga ya mbala oyo

Lokola ozali kotambola na Yehova lelo oyo, matomba nini ozali kozwa? Ndenge nini okoki kolonga komekama mpe kotika te ete makambo mosusu ezwa esika ya matomba ya Bokonzi, oyo esengeli kozala na esika ya liboso na bomoi na yo? (Mat. 6:33) Ezalaka mpasi mpo na yo koyeba kokesenisa oyo ezali malamu na oyo ezali mabe na kati ya mokili oyo bato bakómi kosala ete makambo mabe emonana malamu? (Ebe. 5:14) Makambo oyo ekolobelama na liyangani ya zongazonga oyo ekobanda na Sɛtɛmbɛ 1999, yango ezali na motó ya likambo oyo: “Zwá matomba sikawa na kotamboláká na Nzela ya Nzambe.”—Nz. 128:1.

Na mokolo ya pɔsɔ, na liyangani yango, likambo moko ya sika ekosalema, ekozala bongo Likita ya Mosala, oyo ekosalama lokola ndakisa mpo na masangá. Mokɛngɛli na bino ya zongazonga akoyebisa masangá makambo oyo ebongisami na boye ete bato nyonso bakoya basili komibongisa mpo na kolanda manaka yango malamu.

Lisolo oyo ezali na motó ya likambo ete: “Babongisi-nzela—Bókeba ntango nyonso na lolenge oyo bozali kotambola” ekomonisa ndenge tokoki kosalela mayele mpe bokatikati mpo na kosomba ntango ebongi mpo na mosala ya mobongisi-nzela. (Ef. 5:15-17) Lisolo mosusu oyo ezali na motó ya likambo ete: “Kebá na nzela oyo ezali komonana lokola ezali malamu” ekoteya biso ndenge tokoki koyeba makambo oyo Nzambe andimaka na banzela nyonso ya bomoi na biso. Lisukulu “Ndenge nini bisakweli oyo esili kokokisama ezali kotalela biso” ekosalisa biso tólinga Liloba ya Nzambe mpe tótondisa makanisi na biso mpe mitema na biso na yango. Lisukulu ya bato nyonso “Nzela ya Nzambe ezali mpenza kopesa matomba!” ekobenda likebi likoló ya matomba oyo tozali kozwa sikoyo mpo tozali kotambola na boyokani na mibeko ya sembo ya Yehova.

Mposa na yo ezali ya komonisa liboso ya bato nyonso na nzela ya batisimo ete olingi kotambola na nzela ya Nzambe lokola moko na basaleli na ye oyo bamipesi? Na bongo sololá na mokɛngɛli mokambi ya lisangá na bino mpo ete bibongiseli bikoka kozwama mpo na yango.

Zwá ekateli ete okoka kozanga te na liyangani ya zongazonga oyo ebongisami na ntango ebongi. Yanganá mikolo nyonso mibale na manaka mobimba ya liyangani, mpo ete “esengo ezali na moto nyonso oyo akobanga [Yehova], oyo akotambola na nzela na ye.”—Nz. 128:1.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto