Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 9/97 lok. 5
  • Manáka ya liyangani ya mokolo moko ya mbala ekoya

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Manáka ya liyangani ya mokolo moko ya mbala ekoya
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1997
  • Masolo mosusu
  • Manáka ya liyangani ya mokolo moko ya mbula oyo
    Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Liyangani ya sika ya mokolo moko
    Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Liyangani ya sika ya mokolo moko
    Mosala na biso ya Bokonzi—1998
  • Liyangani ya mokolo moko ya mbala oyo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2000
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1997
km 9/97 lok. 5

Manáka ya liyangani ya mokolo moko ya mbala ekoya

“Tósala nyonso mpo na nsango malamu,” ekozala bongo motó na likambo ya liyangani ya mokolo moko oyo ekosalama kobanda na sanza oyo ya Sɛtɛ́mbɛ. (1 Kol. 9:23) Nsango malamu ya Bokonzi ezali nsango oyo eleki ntina mpe oyo ezali koyokama lelo oyo. Liyangani ekosalisa biso na kokanga ntina na libaku bobele moko oyo tozali na yango ya kozala bamemi ya nsango malamu yango. Lisusu, ekopesa biso mpiko ya kokóba kosakola nsango malamu, kozanga kotika.​​​—Mis. 5:42.

Manáka ekomonisa biso lolenge nini kosalela malamumalamu kobongisama na biso ya Teokrasi mpo na komipesa mobimba na mosala ya kosakola. Tokoyoka baklisto mosusu oyo basalaki mbongwana mpo na kokólisa mosala na bango, na ndakisa bilenge oyo bamipesaki na bokóli ya nsango malamu.​​​—Talá Bafilipi 2:22.

Lisukúlu ya moboko, oyo molobi-mobyangami akosala, ekolobela mingi ntina ya kokóba kozala bato oyo “babongi kopesamela nsango malamu.” (1 Tes. 2:4, NW) Tokomona ete mpo na kobatela libaku ya kosakola nsango malamu, esengeli na biso ntango nyonso kokokisa masɛngisi mpe mitindá ya Nzambe ezala na makanisi to na etamboli. Mapamboli oyo mazwamaka na etamboli ya lolenge yango makomonisama mpe polele.

Tózanga te na manáka yango zambi ezali na ntina mingi. Bato oyo bamipesi sika epai na Yehova mpe balingi kozwa batisimo na boumeli ya liyangani yango basengeli koyebisa uta sikawa mokɛngɛli-mokambi. Tóbengisa baoyo nyonso toyekolaka na bango Biblia. Tópesa nzela na Yehova ete akembisa biso mpo ete tósala nyonso mpo na nsango malamu mpo na kosukisa bongo mosala oyo monene liboso ya Armagedon.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto