Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 5/04 lok. 3
  • Lolenge moko ya kosalisa bango

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Lolenge moko ya kosalisa bango
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2004
  • Masolo mosusu
  • Nsango malamu na Internet
    Mosala na biso ya Bokonzi—1997
  • Salelá site Internet na biso mpo na kosalisa moto oyo alobaka monɔkɔ mosusu
    Mosala na biso ya Bokonzi—2012
  • Site Internet na biso ebongisami mpo na litomba na biso moko mpe bato mosusu
    Mosala na biso ya Bokonzi—2012
  • Soki osengeli na mikanda nokinoki na monɔkɔ mosusu
    Mosala na biso ya Bokonzi—2010
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2004
km 5/04 lok. 3

Lolenge moko ya kosalisa bango

Baklisto ya solo basalaka mosala mpo na bolamu ya bato nyonso na ndenge bapalanganisaka nsango malamu. (Filp. 2:17) Mpo na kokokisa malamu mosala yango, batye mwabuku mosusu, batrakte, mpe mikanda mosusu na minɔkɔ 20 na site ya internet oyo: www.watchtower.org. Site yango esalemi te mpo na kokabolela Batatoli ya Yehova mikanda. Ntina mpenza basali yango ezali ya kosalisa bato báyeba malamumalamu mateya ya Biblia oyo Batatoli ya Yehova bateyaka.

Na mikolo eleki, bautaki kobakisa mikanda mosusu na site na biso. Babakisi mwa buku Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso? na minɔkɔ 220. Lisusu, banimero nyonso ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká!, bandá na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yanuali mpe Lamuká! ya 8 Yanuali, ekobanda kozala na adresi ya site na biso na lokasa ya nsuka.

Ndenge nini okoki kosalela esaleli yango? Mbala mosusu, okoki kokutana na moto moko oyo amonani ete asepeli na nsango malamu, kasi alobaka monɔkɔ mosusu. Soki moto yango asalelaka internet, okoki kolakisa ye adresi yango na lokasa ya nsuka ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli to ya Lamuká! Na ndenge yango akoki kotánga mwa buku Azali kosɛnga na monɔkɔ ya mboka na bango, tii ntango okomemela ye mikanda oyo ezali na monɔkɔ yango. To mbala mosusu, tii ntango okokutana na bato ya lisangá to ya etuluku oyo esalaka makita na monɔkɔ yango.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto