Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 9/98 lok. 2
  • Makita ya mosala mpo na Sɛtɛ́mbɛ

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makita ya mosala mpo na Sɛtɛ́mbɛ
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1998
  • Mitó ya makambo mike
  • Pɔsɔ ebandi na 7 Sɛtɛ́mbɛ
  • Pɔsɔ ebandi na 14 Sɛtɛ́mbɛ
  • Pɔsɔ ebandi na 21 Sɛtɛ́mbɛ
  • Pɔsɔ ebandi na 28 Sɛtɛ́mbɛ
Mosala na biso ya Bokonzi—1998
km 9/98 lok. 2

Makita ya mosala mpo na Sɛtɛ́mbɛ

Pɔsɔ ebandi na 7 Sɛtɛ́mbɛ

Loyembo 216

Min. 10: Mayebisi. Mayebisi matali Mosala na biso ya Bokonzi. Lobelá lapolo ya mosala ya kosakola oyo esalemaki na Augústo.

Min. 15: “Sɛtɛ́mbɛ ekozala sanza ya ntina mingi?” Ekosalema na mituna mpe biyano. Lendisá mosakoli mokomoko ete asakola na Sɛtɛ́mbɛ mpe na sanza mokomoko na mobu ya sika ya mosala.

Min. 20: “Salelá mwa babuku mpo na kosimba makanisi mpe motema.” Lisolo elongo na bayangani. Lobelá na mokuse mwa babuku oyo esili kobimisama na boumeli ya bambula mpo na koyebisa bato makambo ya ntina oyo mazali kati na Makomami. (Talá Index des Publications de la Société Watch Tower 1986-1990, nkasa 298-302.) Lobelá mwa mingi mwa babuku oyo euti kobima, mpe lobelá bato oyo bakoki kosepela na motindo mokomoko ya mwa babuku yango. Salá elakiseli moko to bilakiseli mibale.

Loyembo 191 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 14 Sɛtɛ́mbɛ

Loyembo 127

Min. 10: Mayebisi. Lapolo ya kɔnti. Lobelá mokano oyo tozali na yango​—basakoli banso basengeli kosakola na Sɛtɛ́mbɛ.

Min. 15: Bamposa ya lisangá. Lobelá nkoma: Mosolo mpo na Bandako ya Bokonzi.

Min. 20: “Bilenge​—Bózwa matomba na kelasi na bino.” Ekosalema na mituna mpe biyano. Kɔtisá makanisi mabongi ya Lamuká! ya 8 Apríli 1992, nk. 17-19, ebimeli ya Lifalanse, mpe Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yulí 1991, nk. 23-26.

Loyembo 37 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 21 Sɛtɛ́mbɛ

Loyembo 163

Min. 10: Mayebisi. Sɛngá na bayangani bálobela na mokuse lolenge ya kozwa nkombo mpe adrɛsi ya bato oyo bayebisaki bango nsango malamu na balabala, na parke, to epai mosusu mpo na kolandela bosepeli na bango. Lobelá na bokuse “Liyangani ya sika ya mokolo moko.”

Min. 35: “Tózala na makanisi malamu likoló na mosala ya kozalisa bayekoli oyo ezali kosalema na lombangu.” Ekosalema na mituna mpe biyano. Tángá par. 5, 10 mpe 11. Lobelá lolenge mosala ya kotambwisa boyekoli ya Biblia ezali kokola na lisangá na bino. Lendisá baoyo nyonso bazali kotambwisa boyekoli ete bátánga lisusu siplema ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Yulí 1996 mpo ete bákolisa makoki na bango ya koteya. Talelá par. 5 mpe par. 25 ya siplema yango.

Loyembo 108 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 28 Sɛtɛ́mbɛ

Loyembo 63

Min. 12: Mayebisi. Kundwelá basakoli banso ete bápesa lapolo ya mosala ya kosakola ya Sɛtɛ́mbɛ. Batambwisi ya boyekoli ya mokanda na lisangá basengeli komindimisa ete basangani nyonso ya bituluku na bango bapesi balapolo na bango mpo ete nyonso ekoka kotindama nsuka mwa 6 Ɔkɔtɔ́bɛ. Lobelá mikanda oyo mikolakisama na Ɔkɔtɔ́bɛ. Salá elakiseli ya mokuse oyo ezali kobimisa motuna “Mpo na nini tosengeli kosalela nkombo ya Nzambe?” Yanolá na motuna yango na kosaleláká buku Boyebi, mok. 3, par. 6.

Min. 15: “Bankulutu bazali kotambwisa lisangá​—Mikumba ya mokɛngɛli-mokambi.” Lisolo oyo likosalema na mokɛngɛli-mokambi. Nsima ya kolobela mikumba na ye, akopesa matɔndi na lisangá mpo na lolenge bazali kosalana elongo na bankulutu wana bazali kosala mosala ya kobatela bampate.

Min. 18: Bósalisa bana na bino na eteyelo. Nkulutu moko azali kosolola na baboti mibale to misato oyo bazali na bana na eteyelo. Bakolobela na mokuse mikakatano oyo bana na bango bakutanaka na yango na eteyelo, lokola yango emonisami na Lamuká! ya 8 Augústo 1994, nk. 5-7, ebimeli ya Lifalanse. Na nsima, na lisalisi ya nk. 8-10, monisá lolenge baboti bakoki kobatela bana na bango na kobateláká boyokani kati na bango mpe balakisi.

Loyembo 24 mpe libondeli ya nsuka.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto