Tótonga Bomoi na biso likoló na mosala ya Yehova
1 Yesu akokanisaki bato oyo bazalaki koyoka mateya na ye na batongi mibale. Moko atosaki maloba ya Klisto mpe na bongo atongaki bomoi na ye likoló na mabanga. Na yango, azalaki na likoki ya kotɛmɛla mipɛpɛ makasi ya botɛmɛli mpe ya bolɔzi. Nzokande oyo mosusu atosaki maloba ya Klisto te, na bongo atongaki bomoi na ye likoló na zɛlo mpe ntango mipɛpɛ eyaki, azalaki na likoki ya kotɛmɛla yango te. (Mat. 7:24-27) Lokola tozali kobika na nsuka ya ebongiseli ya biloko ya ntango oyo, tozali kokutana na mipɛpɛ makasi ya botɛmɛli. Mapata ya bolɔzi monene ezali koyinda mpe kobɛlɛma nokinoki mpenza. Tokoyika mpiko kino nsuka na kozaláká na kondima oyo ezangi kotɛngatɛnga? (Mat. 24:3, 13, 21) Yango etaleli mingi lolenge tozali kotonga bomoi na biso sikawa. Na yango, ezali likambo ya lombangu mpenza komituna ete, ‘Nazali kotonga malamumalamu bomoi na ngai ya boklisto likoló na mosala ya botosi ya Nzambe?’
2 Kotonga bomoi na biso likoló na mosala ya Yehova elimboli nini? Elimboli kosala ete Yehova azala moboko ya bomoi na biso. Yango elingi mpe koloba kokómisa Bokonzi ya Nzambe lobanzo na biso ya liboso. Esɛngaka kotosa Nzambe na makambo nyonso ya bomoi na biso ya mokolo na mokolo. Esɛngaka kotya motema na biso mobimba na boyekoli na biso moko ya Biblia, ya libota mpe na makita ya lisangá, mpe kotya motema na biso mobimba na mosala ya kosakola, kosaláká ete makambo wana nyonso ezwa esika ya liboso. (Mos. 12:13; Mat. 6:33) Botosi mpe molende motindo wana esalaka ete kondima etongama makasi likoló na mabanga, mpe ekokwea te ntango mipɛpɛ makasi ya botɛmɛli ekoya.
3 Ezali esengo mpenza komona ete bamilio ya bato na motema na bango mobimba bazali kotonga bomoi na bango mpe bilikya na bango mpo na mikolo mizali koya likoló na mosala ya Nzambe, lokola Yesu asalaki. (Yoa. 4:34) Bazali kotosa manaka ya misala ya Teokrasi mpe bazali kosepela na mapamboli oyo ezali kouta na yango. Mama moko alobelaki lolenge ye na mobali na ye balongaki kobɔkɔla bana na bango mibale ya mibali mpo na kosalela Yehova: “Solo ezalaki kotambwisa bomoi na biso na makambo nyonso—tozalaki kokende na mayangani nyonso, tozalaki kobongisa makita mpe koyangana na yango, mpe tokómisaki mosala ya kosakola moko na makambo ya ntina na bomoi na biso.” Mobali na ye abakisaki ete: “Solo ezali eteni ya bomoi na biso te, kasi ezali bomoi na biso. Eloko mosusu nyonso ezali nsima na yango.” Yo mpe okómisi mosala ya Yehova likambo ya liboso kati na libota na yo?
4 Salá manaka moko ya malamu ya pɔsɔ na pɔsɔ: Lisangá ya Yehova ezali kosalisa biso mpo ete tózala na mimeseno ya malamu na elimo na kobongiseláká biso makita mitano na pɔsɔ. Baklisto oyo bazali kotonga bomoi na bango likoló na losambo ya Yehova babongisaka makambo na bango ya mosuni mpe ya libota na bango na lolenge ete epesa bango nzela ya koyanganaka na makita yango nyonso. Bapesaka nzela te na makambo ya ntina mingi te ete epekisa bango koyangana na makita mbala na mbala.—Filp. 1:10; Ebe. 10:25.
5 Baklisto oyo bakɔmɛli bayebaka ete lokola kolya na ntango malamu mokolo na mokolo ezali na ntina, bobele bongo ezali mpe na ntina kosala manaka moko ya malamu mpo na boyekoli ya moto na moto mpe mpo na boyekoli ya libota, bakisa mpe kobongisa makita. (Mat. 4:4) Okoki kobongisa miniti 15 to miniti 20 mokolo na mokolo mpo na boyekoli ya yo moko? Esengeli kosala ete makambo mosusu ebebisa te ntango oyo obongisi mpo na boyekoli. Kómisá boyekoli yango momeseno na yo. Yango ekoki kosɛnga yo mbala mosusu kolamuka na ntɔngɔ mpenza. Bandeko 17 000 ya libota ya Betele balamukaka na ntɔngɔ mpenza mpo na komibongisa mpe kotalela mokapo ya mokolo. Ya solo, kolamuka na ntɔngɔ mpenza esɛngaka kolala na ngonga moko ebongi mpo na kolamuka malamu mpe kobanda mokolo na nzoto makasi.
6 Soki ozali tata ya libota, salá manaka ya libota na yo mpo na misala ya Teokrasi. Mabota mosusu batángaka Biblia, Annuaire, to mokanda mosusu wana bazali kominanola nsima ya kolya na mpokwa. Baboti mingi oyo babɔkɔli bana na bango malamu kino kokóma baklisto ya molende balobaka ete likambo moko oyo epesaki bango nzela na kolonga ezalaki momeseno ya kobongisa mpokwa moko pɔsɔ na pɔsɔ mpo na kolendisana na elimo. Tata moko oyo asalaki bongo alobi ete: “Nakanisi ete bokoli ya bana na biso na elimo eutaki mingi mpenza na boyekoli ya libota oyo tozalaki kosala mbala na mbala mokolo ya misato na mpokwa. Tobandaki boyekoli yango esili koleka mbula soko ntuku misato.” Bana na ye nyonso misato bazwaki batisimo wana bazalaki naino bilenge, mpe na nsima bango nyonso basalaki mosala ya ntango nyonso. Longolá boyekoli ya libota, tozalaki kobongisa bilakiseli mpo na makita to mpo na mosala ya kosakola. Tozalaki mpe kosala misala mosusu ya malamu esika moko.
7 Na manaka na yo ya pɔsɔ na pɔsɔ, ‘obombi ntango’ mpo na mosala ya kosakola Bokonzi? (Kols. 4:5) Bato mingi kati na biso bazali na makambo mingi ya kosala, bazali na mikumba ya kokokisa na mabota na bango mpe na lisangá. Soki tosali bibongiseli te mpo na mosala ya kosakola pɔsɔ na pɔsɔ, makambo mosusu ekozwa esika ya mosala wana ya ntina. Ndeko moko oyo azalaki kobɔkɔla banyama alobaki ete: “Na mobu 1944 namonaki ete likoki bobele moko ya kosala mosala ya kosakola ezalaki kobongisa mokolo mpo na yango. Banda ntango wana nabongisaka mokolo moko na pɔsɔ mpo na mosala ya kosakola.” Nkulutu moko moklisto amonaki ete kozala na manaka mpo na mosala ya kosakola epesaka ye likoki ya kokokisa ngonga 15 sanza na sanza na mosala yango. Soki esengeli asala likambo moko ya mosuni mokolo ya pɔsɔ, asalaka yango nsima ya mosala na ye ya kosakola na ntɔngɔ. Yo mpe libota na yo bokoki kobongisa ata mokolo moko na pɔsɔ mpo na mosala ya kosakola, kokómisaka yango eteni moko ya ntina na bomoi na bino ya elimo, boye te?—Filp. 3:16.
8 Talelá makambo oyo osalaka mokolo na mokolo: Ezali na makambo mosusu oyo epesaka biso nzela te ete tótonga bomoi na biso likoló na mosala ya Yehova. Makambo mosusu oyo ekanamaki te ekoki kobebisa manaka na biso ya boyekoli, ya makita mpe ya mosala ya kosakola. Mpe monguna na biso Satana, akosala nyonso oyo ekoki na ye mpo na ‘kopekisa’ mpe kobebisa mikano na biso. (1 Tes. 2:18; Ef. 6:12, 13) Kopesa nzela te na mikakatano yango ete elɛmbisa yo mpo otika. Salá mbongwana nyonso oyo esengeli mpo na kokokisa manaka na yo ya misala ya Teokrasi. Esengeli kozala na ekateli mpe na molende mpo na kokokisa makambo oyo ezali mpenza na ntina mingi.
9 Tosengeli kopesa nzela te ete bopusi ya mokili mpe na bopusi ya nzoto na biso ya kozanga kokoka ekɔtisa misala mosusu oyo ezali ya elimo te, oyo ekoki kolya ntango mpe likebi na biso. Komitalela ya moto ye moko ezali na ntina. Esengeli komituna mituna lokola oyo: ‘Nabandi kozanga bokatikati to kozanga likebi na bomoi na ngai? Nabandi kotonga bomoi na ngai likoló na makambo ya mokili oyo ezali koleka? (1 Yoa. 2:15-17) Soki nakokanisi yango na ntango oyo nalekisaka na makambo ya elimo, nalekisaka ntango boni na makambo na ngai moko, na mibembo ya bisengo, na masano, na makambo mosusu ya kominanola—bakisa mpe ntango oyo nalekisaka na kotala televizyo?’
10 Soki ososoli ete bomoi na yo etondi na makambo oyo ezangi ntina, osengeli kosala nini? Bobele lokola Paulo abondelaki mpo na bandeko na ye ete ‘bábongisama’ to ‘básembolama alima,’ mpo na nini te kobondela Yehova ete asalisa yo omipesa na mosala na ye? (2 Kol. 13:9, 11, NW, maloba na nse ya lokasa) Na yango, zalá na ekateli ya kosala mbongwana oyo esengeli. (1 Kol. 9:26, 27) Yehova akosalisa yo ete otɛngatɛnga te mpo na oyo etali mosala ya botosi epai na ye.—Kokanisá na Yisaya 30:20, 21.
11 Zalá ntango nyonso na makambo ya kosala kati na mosala ya Nzambe oyo epesaka esengo: Bato mingi balandaka bisengo kasi bayaka kososola wana bakómi mibange ete biloko ya mosuni oyo bamipesaki na yango, ememeli bango esengo ya seko te. Ezali bobele ‘kolanda mopɛpɛ.’ (Mos. 2:11, NW) Nzokande, soki totii bomoi na biso na mosala ya Yehova ntango nyonso, ‘kotyáká ye liboso na biso ntango nyonso,’ tokozala na esengo ya solosolo mpenza. (Nz. 16:8, 11) Ezali bongo mpamba te soki tozali na bomoi, ezali mpo na Yehova. (Emon. 4:11) Soki ye te, Motii Monene ya mikano, mbɛlɛ bomoi ezali na ntina te. Kosalela Yehova ezali komonisa biso ntina ya bomoi mpe ezali kopesa biso mpe bato mosusu matomba oyo ekoumela, ɛɛ matomba ya bomoi ya seko.
12 Ezali na ntina te ete tómiyoka lokola tokoki mpe tóbungisa lombangu oyo tosengeli kosala na yango mpamba te nsuka ya mokili ya Satana oyo ekómi pene mpenza. Lolenge tozali kotalela mikolo mizali koya ezali na bopusi likoló na bomoi na biso ya mokolo na mokolo. Bato ya ntango ya Noa, oyo bandimaki te ete mpela monene ekoya, ‘batyaki likebi te,’ mokolo na mokolo bazalaki se komipesa na makambo na bango moko—kolya, komɛla, kobala mpe kobalisa—kino mpela eyaki mpe ‘ebomaki bango nyonso.’ (Mat. 24:37-39) Lelo oyo, baoyo bazali komipesa na makambo ya mokili bakomona ete bilikya na bango mpo na mikolo mizali koya bikobeba ntango libebi ya monene oyo moto amona naino te, “mokolo ya Yehova” ekoya.—2 Pet. 3:10-12.
13 Na yango, kobá kotonga bomoi na yo likoló na Yehova, Nzambe ya bomoi, mpe kobá kosala mokano na ye. Ezali na eloko moko te oyo okoki kobomba na bomoi mpo epesa yo matomba koleka oyo Yehova, Mobombi ya sembo, akoki kopesa yo. Akoki kokosa soko moke te—akokokisa bilaka na ye. (Tito 1:2) Akoki kokufa te—eloko oyo ebombami epai na Yehova ekoki kobunga te. (Hab. 1:12; 2 Tim. 1:12) Bomoi ya botosi mpe ya kondima oyo tozali kotonga sikawa ezali bobele ebandeli ya bomoi oyo ekoumela seko kati na mosala ya esengo, mosala ya Nzambe na biso ya esengo!—1 Tim. 1:11; 6:19.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 3]
“Solo ezali eteni ya bomoi na biso te, kasi ezali bomoi na biso. Eloko mosusu nyonso ezali nsima na yango.”