Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 5/05 nk. 3-6
  • Salá programɛ oyo ebongi mpo na libota na yo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Salá programɛ oyo ebongi mpo na libota na yo
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2005
  • Masolo mosusu
  • Programɛ ya libota​—Mokapo ya mokolo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2005
  • Tótonga Bomoi na biso likoló na mosala ya Yehova
    Mosala na biso ya Bokonzi—1998
  • Lolenge bato ya libota moko bakoki kopesana mabɔkɔ mpo na​—Boyekoli ya Biblia kati na libota
    Mosala na biso ya Bokonzi—1999
  • Kokanisa te ete okokoka te mpo ozalaka na ntango te
    Mosala na biso ya Bokonzi—2012
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2005
km 5/05 nk. 3-6

Salá programɛ oyo ebongi mpo na libota na yo

1 Na Lisolo likoló ya Ngomba, Yesu ayebisaki bato oyo bazalaki koyoka ye ete: “Boye, bókoba koluka liboso bokonzi mpe boyengebene na ye.” (Mat. 6:33) Lolenge ya malamu koleka ya kobongisa liboso mpenza makambo oyo libota ekosala mpo na kotya makambo ya elimo na esika ya liboso, ezali kozala na programɛ oyo bokomi na papye. Zwá mwa miniti mpo na kosala programɛ ya makambo oyo libota na yo ekobanda kosalaka pɔsɔ na pɔsɔ, mpe komá yango na programɛ oyo batondisi te, oyo ezali na lokasa 6 ya siplema oyo. Mabota mosusu bakoki komona malamu kokoma makambo oyo bakosala na mwa bapapye mpe kokangisa yango na programɛ yango. Basusu mpe bakoki kokoma mbala moko na kati ya programɛ yango.

2 Programɛ oyo epesami lokola ndakisa awa na nse, ekoki kosalisa yo na kosala programɛ na yo. Okomona ete ezali kaka na makambo minei ya ntina oyo tosalaka: (1) koyangana na makita ya lisangá, (2) kosakola na libota, (3) boyekoli ya libota, mpe (4) kotalela mokapo ya mokolo. Soki okɔtisi makambo oyo na programɛ na yo, okoyeba ‘kotalela malamumalamu mpenza makambo oyo eleki ntina.” (Filp. 1:10) Makanisi mosusu etali makambo yango minei ezali na nkasa 4-5.

3 Programɛ ya libota na yo esengeli kosuka kaka na makambo wana minei te. Soki bozali na makita mosusu oyo bobongisaka yango libota mobimba, osengeli mpe kokoma yango na programɛ na bino. Soki botángaka Biblia nsima ya kotalela mokapo ya mokolo to bosalaka yango na ngonga mosusu, osengeli mpe kokoma yango na programɛ ya libota. Soki bosalaka lisano moko libota mobimba, okoki mpe kokoma yango na programɛ na bino.

4 Yokanisá programɛ ya libota na bamposa mpe na makambo oyo moto mokomoko ya libota asalaka. Mbala na mbala lukaká koyeba soki bozali mpenza kotosa programɛ yango, mpe bóbongolaka yango soki esengeli.

[Etanda na lokasa 3]

Ndakisa ya programɛ ya libota

Na ntɔngɔ Na nsima ya midi Na mpokwa

Lom. Mokapo ya mokolo

Lisukulu ya bato mpe

Boyekoli ya Linɔ́ngi

ya Mosɛnzɛli

Yam. Mokapo ya mokolo Boyekoli ya libota

Mib. Mokapo ya mokolo Boyekoli ya

mokanda na

lisangá

Mis. Mokapo ya mokolo

Min. Mokapo ya mokolo Eteyelo ya

mosala ya Teokrasi

mpe Likita

ya mosala

Mit. Mokapo ya mokolo

Pɔsɔ Mokapo ya mokolo

Kosakola na

libota

(Mokolo ya kokabola

bazulunalo)

[Etanda na lokasa 6]

Programɛ ya libota

Na ntɔngɔ Na nsima ya midi Na mpokwa

Lom.

Yam.

Mib.

Mis.

Min.

Mit.

Pɔsɔ

..................................................................

Mokapo Mokapo Mokapo Mokapo Mokapo Mokapo Mokapo

ya mokolo ya mokolo ya mokolo ya mokolo ya mokolo ya mokolo ya mokolo

Lisukulu Eteyelo Boyekoli Boyekoli Kosakola Kotánga Kominanola

ná ya mosala ya ya libota na Biblia na

Boyekoli ya Teo- mokanda libota na libota libota

ya Linɔ́ngi krasi na lisangá

ya ná

Mosɛnzɛli Likita

ya mosala

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto