Tólakisa buku Bolamu na libota epai ya bato nyonso
1 Na mboka Californie, elenge mobali moko ya mibu 11 asepelaki na buku Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota. Akomaki boye: “Nazali na botɔndi mpo na yango, mpe nazali kolendisa mabota mosusu ete bátánga buku yango mpamba te ezali mpenza malamu. Esalisaki mpe libota na ngai ete tókóma na kimya mpe na esengo na ndako na biso.” Maloba ya elenge mobali oyo esengeli kolendisa biso ete tólakisa buku Bolamu na libota epai ya bato nyonso. Talá mwa makanisi oyo okoki kosalela na mosala ya kosakola na boumeli ya sanza ya Febwali:
2 Wana okutani na elenge, okoki koloba boye:
◼ “Bilenge mingi ya mbula na yo bazali na makanisi ya kobala. Nakoki koyeba soki yango ezali mpe makanisi na yo? [Tiká ye ayanola.] Mbala mingi, bilenge balobaka ete bayebi mpenza te soki bakoki mpo na kobala. Tiká tótala elongo makambo buku oyo ezali koloba mpo na yango.” Talá lokasa 14 ya buku Bolamu na libota, mpe tángá paragrafe 3. Lobelá mitó ya makambo mike oyo ezali kati na mokapo yango. Lakisá buku, mpe yokaná na ye mpo na kozongela ye lisusu.
3 Wana okutani na moboti okoki koloba boye:
◼ “Tozali kolakisa baboti mwango moko ya malamu mpo na kobɔkɔla bana. Yango ezwami kati na buku oyo Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota.” Fungolá na lokasa 55. Tángá paragrafe 10, mpe mokapo ya Deteronome 6:6, 7, oyo ezali na paragrafe 11. Na nsima lobelá maloba matɛngisami oyo ezali na paragrafe 12 kino 16. Na nsima lobá boye: “Buku oyo esili kosalisa bato mingi ete bákokisa malamu mokumba na bango monene ya baboti. Soki olingi kotánga yango, nakosepela kotikela yo yango.”
4 Wana ozali kosolola na mobange, okoki koloba boye:
◼ “Soki nasilisi kotánga maloba oyo, okoki koyebisa ngai makanisi na yo mpo na yango.” Fungolá buku Bolamu na libota na lokasa 169, mpe tángá milɔngɔ mibale ya liboso na paragrafe 17. Nsima tuná ye apesa makanisi na ye na ntina na makambo oyo outi kotánga. Na boyokani na eyano oyo akopesa, okoki kotánga mwa maloba mosusu na kati ya buku liboso ya kotikela ye yango.
5 Wana tozali kolakisa buku Bolamu na libota, tóbosana te koluka kobanda boyekoli ya Biblia na bato. Ekozala malamu kobanda na mwa buku Azali kosɛnga na liteya 8 to na buku Boyebi na mokapo 15. Tiká ete tósala milende mpo na kosalisa bato ya lolenge nyonso ete bátonga libota moko ya baklisto oyo ezali na bomoi ya esengo.