Tokoki kolakisa buku Créateur?
Na mbula eleki, biso nyonso tosepelaki kozwa buku Y a-t-il un Créateur qui se soucie de vous ? Buku yango ebongisami mingimingi mpo na bato oyo atako batángá kelasi mingi, kasi mbala mosusu bandimaka te ete Nzambe azali. Bato oyo bazali na mposa ya kozwa buku yango bazali se kobakisama.
Mbala mingi ezalaka malamu ete tókabola buku oyo bato mingi bakosepela na yango. Yango elingi koloba ete tokolakisa buku Créateur te? Ezali bongo te! Tokoki kolakisa buku yango ntango nyonso epai na bato oyo bandimaka te ete Nzambe azali mpo ete bázwela yango litomba. Tokoki mpe kolakisa buku yango epai na bato oyo bandimaka Nzambe, kasi bayebi te soki azali nani, to bayebi bizaleli na ye te mpe mikano na ye te. Na yango, tolendisami na kozala na buku yango na sakosi na biso ya mosala ya kosakola mpe kolakisa yango epai na moto nyonso oyo tomoni ete akolinga kotánga yango.