Omibongisa liboso!
1 Ebongiseli ya Yehova ezali mbala na mbala kopesa manaka ya makambo ya Teokrasi oyo ebongisami mpo na kokokisa bamposa na biso ya elimo. Tokomonisa botɔndi na biso mpo na makambo yango, soki tozali kozwa matomba na makambo nyonso oyo ebongisami, lokola boyei ya mokɛngɛli ya zongazonga, mayangani ya mike mpe mayangani ya minene, mpe makambo mosusu oyo ebongisami na lisangá na biso. (Mat. 5:3) Nzokande, bandeko mosusu bazali kozanga matomba ya bilei yango ya elimo mpo basilaki kokana kosala makambo mosusu. Tokosala nini mpo na yango? Ndenge nini tokosala mpo makambo mosusu ezwa te esika ya “makambo ya ntina mingi”?—Filp. 1:10.
2 Kosala myango ya mayele ezali na ntina: Masese 21:5 (NW) epesi toli oyo: ‘Myango ya moto ya mayele epesaka litomba, kasi, ya solo mpenza, moto nyonso oyo asalaka makambo mbangumbangu azwaka eloko te.’ Mpo na kozwa “matomba” na elimo, tosengeli kosala myango ya mayele, kobombáká na makanisi makambo ya Teokrasi oyo esili kobongisama. Tosengeli kosala mikano na biso moko na ntango oyo tomoni ete ekopekisa biso te kozwa mapamboli ya elimo. Soki tozali na lombango nyonso komibongisa mpo na kosala makambo na biso moko, kozanga kotalela manaka ya Teokrasi oyo ebongisami, ‘tokozwa eloko te’ na elimo.
3 Tózanga te eloko moko ya ntina mingi! Biso nyonso tokanaka kosala makambo na mikolo mizali koya. Yango ekoki kozala kokende konje, kosala mibembo ya mombongo, kokende kotala bandeko na biso, mpe bongo na bongo. Liboso ya kokana kosala makambo yango, talelá manaka ya makambo ya elimo oyo ebongisami mpo na mikolo mizali koya. Soki omoni ete boyei ya mokɛngɛli ya zongazonga ebɛlɛmi to liyangani moko ebongisami mpe na ntango oyo yo okozala te, salá milende mpo na kotalela lisusu manaka na yo mpo okoka kozanga te. Bayebisaka biso liboso makambo oyo ebongisami mpo na mikolo mizali koya. Bankulutu ya lisangá na yo bakoki koyebisa yo makambo oyo ebongisami na lisangá mpo na mikolo mizali koya.
4 Wana tozali komonisa bokɛngi mpe komibongisa liboso mpo na makambo ya ntina mingi, “tokotonda na mbuma ya boyengebene, . . . na nkembo mpe na lisanzoli ya Nzambe.”—Filp. 1:11.