Ndenge nini okoki kosolola na Moyuda?
1 Na ekeke ya liboso, “bana ya Yisalaele” mingi bandimaki na esengo nyonso mateya ya Yesu mpe ya bayekoli na ye. (Mis. 10:36) Lokola na ntango ya kala, Bayuda mingi ya sembo lelo oyo bazali koyamba na motema mobimba mateya ya solo, kaka na Yisalaele te, kasi mpe na Russie, na États-Unis, mpe na bikólo mosusu. Okolinga koyeba ndenge malamu ya kopesa Moyuda litatoli? Toli oyo elandi ekosalisa yo opesa litatoli epai ya Moyuda oyo amipesaka na oyo amipesaka te na makambo ya lingomba.
2 Ndenge ya kopesa litatoli epai ya Moyuda oyo amipesi na lingomba: Tosengeli koyeba ete mbala mingi, Bayuda oyo bamipesi na lingomba batosaka mibeko ya balabi na esika ya koluka koyeba mpenza mateya ya lingomba. Na yango, tokoki koloba ete batalelaka mibeko ya balabi ete ezali ndenge moko na Makomami. Na bongo, kolobela na mozindo masolo ya Biblia ekoki mbala mosusu kosepelisa bango te. Lisusu, batalelaka Biblia lokola mokanda ya baklisto. Yango wana, eleki malamu ntango ozali kolobela Biblia osalela maloba lokola “Makomami ya Liebele,” “Torah,” to “Makomami.” Mokanda ya malamu oyo ebimisamaki mingimingi mpo na Bayuda ezali mwa buku Tokofanda mokolo mosusu kati na mokili mozangi bitumba?
3 Masolo nini ekoki kosepelisa Bayuda oyo bamipesi na lingomba? Bandimaka ete Nzambe moko azali, oyo atyelaka bato likebi mpenza. Bandimaka lisusu ete Nzambe asalisaka bato na bampasi na bango. Okoki kosalela makambo oyo mpo epesa bino nzela ya kosolola malamu. Lisusu, Bayuda mingi babosani te mpasi oyo bandeko na bango bamonaki na Etumba ya Mibale ya Mokili mobimba. Bamitunaka mpo na nini Nzambe atikaki nzela na mabe ya ndenge yango mpe ntango nini mabe ekosila. Tobongisami malamu mpo na kopesa biyano na mituna yango, soki totaleli makambo oyo bandeko na biso bakutanaki na yango na eleko Banazi balukaki kosilisa Bayuda nyonso na koboma.
4 Ya solo, mpo moto oyo ozali kosolola na ye aboya koyoka yo te, osengeli te kolobela nokinoki nani azali Masiya. Nzokande, okoki kolobela mokumba Mose akokisaki na libota ya Yisalaele, mpe kotuna moto yango soki andimaka ete mateya ya Mose ezali na ntina lelo oyo. Soki libaku emonani mpo na kolobela Masiya, okoki kotánga liboso Deteronome 18:15, yango elobi boye: “[Yehova] Nzambe na yo akotɛmisela yo mosakoli longwa na kati na yo, longwa na bandeko na yo, lokola na ngai—bokoyoka ye.” Tuná moto oyo ozali kosolola na ye soki Mose azalaki kokanisa nani ntango alobaki mpo na mosakoli lokola ye. Na nsima, lobelá mwa makambo oyo ezali na mwa buku Mokili mozangi bitumba na lokasa 14, paragrafe 17 mpe 18.
5 Bayuda oyo bamipesi na lingomba te bamonaka makambo ndenge mosusu: Moyuda nyonso te nde andimaka mateya ya Lingomba ya Bayuda. Lolenge ya kokanisa ya Bayuda mingi emonisi ete bamipesaka na makambo ya losambo te. Balingaka mingi ete Bayuda báyebana mpo na makambo na bango ya siansi, bonkɔkɔ, mpe mateya na bango kasi mpo na Lingomba ya Bayuda te. Bayuda mosusu balobaka ete moto moko te ayebi to akoki koyeba soki Nzambe azali (agnostiques), bamosusu kutu bandimaka te ete Nzambe azali. Na bokutani ya liboso, kolobela mingi Makomami ya Liebele ekopesa mpenza litomba te. Ekozala malamu kobanda lisolo na ndenge okoki kosala na moto oyo amipesi na makambo ya lingomba te. Na ndakisa, okoki kolimbola mpo na nini Biblia ezali kopesa toli ebongi kosalelama mpo na mikolo na biso. Soki moto yango andimaka te ete Biblia ekomamaki na lisalisi ya elimo santu, mwa makambo oyo ezali na mwa buku Mokili mozangi bitumba ekoki kosunga, mingimingi makambo oyo ezali na lokasa 3 na motó ya likambo oyo elobi ete “Biblia—Epemamaki na Nzambe?”
6 Ntango ozali kosolola na Moyuda, okoki koloba boye:
◼ “Mingi kati na biso tosilá kokufela moto. Okoki koyeba nini ekómelaka biso soki tokufi?” Tiká ye ayanola. Na nsima, lakisá moto yango etanda oyo ezali na lokasa 22 ya mwa buku Mokili mozangi bitumba oyo ezali na motó ya likambo ete “Liwa mpe molimo—Ezali nini?” Etanda yango ezali komonisa oyo Makomami ezali koloba na ntina na bomoi nsima ya liwa mpe mateya ya balabi na likambo yango. Na nsima talá paragrafe 17 na lokasa 23, mpe monisá ete Makomami epesi elaka ete bakufi bakozonga na bomoi kati na paladiso awa na mabelé. Lakisá ye mwa buku yango. Mpo ntango okozongela ye bósolola malamu, okoki koyebisa ye ete Yobo azalaki na elikya ya lisekwa. Lobelá mikapo oyo ezali na nsuka ya paragrafe 17, mpe yebisá ye ete okosepela kozongela ye mpo na kosolola makambo yango.
7 Mokanda ya Matai, ya Malako, ya Luka, ya Yoane, mpe ya Misala ezali kolobela masolo ya Bayuda oyo bayokaki mateya ya solo mpe basalelaki yango. Yehova atiki nzela ya bomoi ya seko polele. Bayuda mingi oyo bazali na motema sembo bakoki koyekola makambo na ntina na Yehova, Nzambe ya solo, mpo bango mpe bákoka kozala na bomoi ya seko na mokili ya sika ya Nzambe.—Mika 4:1-4.