Yo mpe okozala wana?
1 Mokolo moko, Motatoli moko oyo aumeli mingi na kati ya solo alobaki ete: “Soki ozangisi liyangani na mokolo ya liboso, okozanga mpenza makambo mingi!” Mpo na nini alobaki bongo? Mpamba te mokolo ya liboso ezali ebandeli ya elambo kitoko ya elimo oyo ebongiseli ya Yehova ebongisi mpo na biso. (Yis. 25:6) Soki tozali wana banda na ebandeli tokomonisa ete tozali kokanisa ndenge moko na mokomi na nzembo oyo alobaki ete: “Nasepeli mingi wana balobelaki ngai ete, Tiká tókenda na ndako na [Yehova.]”—Nz. 122:1.
2 Na mbula eleki, na bisika mosusu oyo liyangani “Liloba ya esakweli ya Nzambe” esalemaki, bato oyo bayanganaki na mokolo ya mitano bazalaki mpenza moke soki tokokanisi motango na bango na oyo ya mokolo ya pɔsɔ mpe mokolo ya lomingo. Yango emonisi ete bandeko mingi bayokaki te masukulu oyo emonisaki makambo ya ntina mingi ya liloba ya esakweli. Bazangaki mpe libaku malamu ya kozala esika moko na bandimi mosusu.
3 Kotika te ete mosala na yo ya mosuni epekisa yo koyangana: Ekoki kozala ete bato mosusu babangaka ete bakobebisa mosala na bango ya mosuni, yango wana bazalaka na liyangani mokolo ya mitano te. Nzokande, batatoli mingi basili komona ete bapatrɔ na bango bandimaka kopesa bango nzela soki basɛngi konje na bango mwa mikolo mingi liboso. Patrɔ moko akamwaki mingi na komona ekateli oyo ndeko mwasi moko, mobongisi-nzela, azwaki ya koyangana na makita nyonso ya lisangá mpe na mayangani nyonso; na yango alekisaki mokolo mobimba elongo na ndeko mwasi yango na liyangani!
4 Osengeli te kokanisa ete patrɔ na yo akolinga kaka te kopesa yo mwa konje, to kokanisa ete soki ozangisi liyangani mokolo moko ekosala eloko te. Zalá na kondima mpenza, omibongisa mpo na komonisa patrɔ na yo na nzela ya Makomami ete kozala na liyangani ezali na ntina mingi mpo na losambo na yo. (Ebe. 10:24, 25) Na nsima, tyá elikya na yo nyonso na bilaka ya Yehova, oyeba ete eloko nyonso ya mosuni oyo okosɛnga okozwa yango soki ozali kotya matomba ya elimo na esika ya liboso na bomoi na yo.—Mat. 6:33; Ebe. 13:5, 6.
5 Mpo na kolonga na likambo yango esengeli nde komonisa botɔndi mpo na “makambo oyo eleki ntina.” (Filp. 1:10, 11, NW; Nz. 27:4) Yango ekotinda biso tómibongisa mpo na kozwa matomba mpenza na ebongiseli ya ntina mingi oyo euti na Yehova. Bandá komibongisa sikoyo mpe zwá ekateli ete yo mpe okozala wana mikolo nyonso misato!