Ozalaka nsɔninsɔni?
1 Soki tomoni mwana moko ya moke azali komibomba na nsima ya mama na ye to ya tata na ye mpe azali kotala biso, tokamwaka te. Bana mingi bazalaka nsɔninsɔni. Ata bakóló mosusu mpe bazalaka bato ya nsɔninsɔni. Soki ozali kobanga kosakola mpo ozalaka nsɔninsɔni, okosala nini?
2 Ndenge ya kosilisa ezaleli ya nsɔninsɔni: Kotya likebi na “bomoto oyo ebombami na kati ya motema” ezali na ntina. (1 Pet. 3:4, NW ) Kolisá bolingo na yo mpo na Yehova mpe mpo na bazalani na yo. Ndimá mpenza ete kosala mosala ya kosakola ezali lolenge oyo eleki malamu mpo na komonisa bolingo oyo ezali kotinda yo ete omipesa mpo na bolamu ya bato mosusu. Osengeli kozala ntango nyonso na momeseno ya koyekola yo moko mpe ya koyangana na makita. Bondelaká ntango nyonso, mingimingi mpo na kosɛnga lisalisi ya Yehova. Soki tozali na kondima makasi mpe soki tozali kotyela ye motema, yango ekolendisa biso ete tólɛmba te kotyela ye motema mpe yango ekopesa biso “mpiko mpo na koloba liloba ya Nzambe kozanga kobanga.”—Filp. 1:14, NW.
3 Longolá likanisi ete okokoka te. Emonani ete Timote mpe asengelaki kosala bongo. Paulo alendisaki Timote ete “[atika] te ete moto atyola bolenge na [ye],” akundwelaki ye mpe ete “Nzambe apesaki biso elimo ya kobangabanga te kasi elimo ya nguya.” (1 Tim. 4:12; 2 Tim. 1:7) Yehova asalelaki Timote mingi, akosalela mpe yo soki ozali kosala makasi mpo na kotyela ye lisusu motema mingi koleka.—Nz. 56:11.
4 Kokanisa mikapo ya Biblia, lokola oyo ya Matai 10:37, esalisaki ndeko mwasi moko oyo, lokola azalaki nsɔninsɔni, azalaki kobanga mobali na ye mpo azalaki kotɛmɛla ye. Lokola azalaki koyika mpiko, mosala ya kosakola ekómaki pɛpɛlɛ mpo na ye, mpe na nsima mobali na ye, mama na ye mpe bandeko na ye—bango nyonso—bandimaki solo!
5 Komibongisa ezali na ntina: Soki ozali komibongisa malamu mpo na mosala ya kosakola, kobanga na yo ekosila mpenza. Poná lisolo moko ya mokuse na buku Comment raisonner to na banimero ya kala ya Mosala na biso ya Bokonzi, kɔtisá yango malamu na makanisi na yo mpe zongelá yango mbala na mbala. Na esika ete omitungisa na makambo oyo ekoki kolɛmbisa yo, zalá nde na makanisi ya kolonga. Sakolaká mpe elongo na bato mosusu mpo na kozwa mpiko. Yebá ete bato mingi oyo okokutana na bango na ndako na ndako bazali mpe bato ya nsɔninsɔni lokola yo. Moto nyonso azali na mposa ya nsango ya Bokonzi.
6 Soki ozalaka nsɔninsɔni, kolɛmba te. Soki ozali kosala makasi Yehova akosalisa yo ete osakolaka nsango malamu na molende. Soki ozali kosala bongo, okozala na esengo na mosala na yo ya kosakola.—Mas. 10:22.