Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 2/01 nk. 3-4
  • Tóyebisa Nkombo ya Yehova mpe misala na ye

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tóyebisa Nkombo ya Yehova mpe misala na ye
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2001
  • Masolo mosusu
  • “Tósakola liloba ya Nzambe malamumalamu”
    Mosala na biso ya Bokonzi—2002
  • ‘Pesá litatoli malamumalamu mpo na nsango malamu’
    Mosala na biso ya Bokonzi—2008
  • Kobá kosakola misala ya kokamwa ya Yehova
    Mosala na biso ya Bokonzi—2004
  • Tósakola bizaleli malamu ya Yehova
    Mosala na biso ya Bokonzi—2007
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2001
km 2/01 nk. 3-4

Tóyebisa Nkombo ya Yehova mpe misala na ye

1 “Ɛ bótɔnda [Yehova], bóbyanga nkombo na ye! Bósakwela bato mpo na misala na ye! . . . Tiká ete baoyo bakolukaka [Yehova] básepela na mitema.” (Nz. 105:1, 3) Mokomi ya nzembo, oyo akomaki maloba oyo azalaki kosepela mingi koyebisa makambo ya Yehova mpe “misala” na ye epai ya bato mosusu. Misala nini? Na ntembe te ezali makambo oyo etaleli Bokonzi ya Nzambe mpe “nsango malamu ya lobiko oyo akopesa.”​—Nz. 96:2, 3; 145:11, 12.

2 Lokola Ekaniseli mpo na mobu 2001 ezali kobɛlɛma, tozali na bantina mingi ya kosepela na misala ya Yehova oyo asali mpo na biso. Ndenge nini? Na ntembe te, Elambo ya Mpokwa ya Nkolo ezalaka mpenza molulu eleki monene mpo na baklisto nyonso ya solo. Likambo moko te ekokani na yango mpo na oyo etali ntina na yango, mokano na yango, to ndenge oyo yango esalemaka. Yango ezalaka ntango mpo na biso nyonso tókanisa mpo na makambo oyo Yehova mpe Yesu basalaki mpo na lobiko na biso. Ezali bongo likambo ya kokamwa te soki na sanza oyo Ekaniseli ekosalema tomizelaka ete mosala ya kosakola esalema mingi, mpo na koyebisa “nsango malamu ya lobiko”!

3 Okosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi? Na sanza ya Aprili ya mbula eleki, bato 7 644 basalaki mosala ya mobongisi-nzela mosungi na Congo-Kinshasa mpe bato 556 basalaki mosala ya mobongisi-nzela mosungi na Congo-Brazzaville. Na mbula oyo, tokoki kosala ete sanza ya Marsi mpe ya Aprili ezala basanza ya ntina mpo na oyo etali kosala mingi na mosala ya kosakola? Sanza ya marsi ezali na mikolo ya Pɔsɔ mitano, mpe sanza ya Aprili ezali na mikolo ya Lomingo mitano. Soki bamityeli mokano ya kosakola mokolo mobimba na ba wikende, basakoli mingi oyo basalaka mosala ya mokolo mobimba bakomona ete bakoki kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi. Mpo na kokokisa ngonga 50 na sanza moko, mobongisi-nzela mosungi asengeli kosala ngonga 12 pɔsɔ na pɔsɔ. Talelá malamumalamu manaka oyo ezali na etanda oyo ezali na lokasa 4. Omoni manaka moko oyo ebongi na yo? Soki ata moko te ebongi na yo, ntango mosusu okoki kosala manaka na yo moko mpo na mosala ya mobongisi-nzela na sanza ya Marsi mpe ya Aprili.

4 Bankulutu basengeli kobanda uta sikoyo kolendisa basakoli mpo bazala na esengo ya kosala mingi na mosala ya kosakola. Na mbula eleki, na lisangá moko epai bankulutu nyonso na basaleli na misala basalaki mosala ya mobongisi-nzela mosungi, basakoli 64 kati na 121 basalaki mpe mosala yango na sanza ya Aprili! Bazalaki mpe na esengo ya komona bato motoba babandaki kopesa lapolo na bango na sanza ya Marsi mpe ya Aprili. Ya solo, ezali na libaku mosusu te oyo eleki oyo mpo na bana mpe mpo na bato ya sika ete básɛnga bankulutu soki bakokisi masɛngami mpo na kobanda kopesa litatoli.

5 Milende ememaka mapamboli: Masangá oyo emityelaka mikano ya sikisiki mpe ezali kosala molende makasi ezwaka mapamboli mingi. Masangá mosusu ekoki kotya likebi mingi mpenza na bateritware oyo esakolamaka mingi te, komipesa na mitindo mosusu ya kopesa litatoli, to kotya likebi na litatoli na nzela ya telefone​—lolenge malamu mpenza ya kosolola na bato oyo bazalaka na bandako na bango te mpe bato oyo bazali na bisika oyo ezali mpasi mpo na kokutana na bango.

6 Soki moto azali na nzoto kolɔngɔnɔ te to azali mobange, yango ekoki nde kopekisa ye ete asala mingi te na mosala ya kosakola? Ezali bongo te mpo na ndeko mwasi moko oyo azali na mbula 86 mpe azali na maladi ya kanser. Atako makolo na ye ezali ya kovimba, na mbula eleki asalaki mosala ya mobongisi-nzela mosungi na Aprili. Litatoli na nzela ya telefone esalisaki ye asala mingi na mosala ya kosakola, akumisa Yehova mingi. Yango elendisaki ye moko mpe bandeko mosusu na kati ya lisangá.

7 Omibongisa malamu mpo na ekaniseli: Na mbula oyo Ekaniseli ekosalema na mokolo ya 8 Aprili. Lokola ezali mokolo ya Lomingo, yango ekopesa bato mingi libaku ya koyangana. Bato mingi koleka bakoyangana soki biso mpe tosali oyo tosengeli kosala: (1) tosengeli kozala wana, mpe (2) kobengisa bato mosusu báyangana elongo na biso na Ekaniseli. Tosengeli kobengisa nani?

8 Talá banɔti na yo mpo na koyeba bankombo ya bato oyo basepelaki na solo, ata soki okendaka kotala bango mbala na mbala te. Pɔsɔ mibale to pɔsɔ misato liboso ya Ekaniseli, osengeli kosala makasi mpo na kokende kotala bato yango nyonso mpo na kotikela bango lokasa ya libyangi. Soki ozali na likoki ya kokende kozwa baoyo nyonso basepeli koyangana na Ekaniseli, okoki koyebisa bango yango.

9 Na masangá mosusu, bandeko basalelaka nkasa nyonso te ya libyangi. Bakomeli ya masangá basengeli komindimisa ete nkasa yango epesama epai ya bandeko mikolo mingi liboso mpo ete bakoka kokabola yango nyonso. Mbala mosusu okolinga kokoma polele ngonga mpe esika oyo Ekaniseli ekosalema na nse ya lokasa ya libyangi. To okoki kokangisa yango na lokasa mosusu ya libyangi oyo ezali na adrɛsi ya Ndako ya Bokonzi soki Ekaniseli ekosalema kuna. Tóbosana te ete tosengeli kopesa lokasa ya libyangi na mabɔkɔ ya moto oyo tolingi kobengisa.

10 Kanisá bato oyo batiká kosakola: Ezalaka esengo soki moyekoli moko ya Biblia amipesi na Yehova mpe amonisi yango na nzela ya batisimo ya mai. Nzokande, mbula na mbula, bato mosusu kati na biso bazali kotika kosangana na biso mpe bazali lisusu te koyebisa bato mosusu nkombo ya Yehova mpe misala na ye. Tozali mpenza na bantina malamu ya komibanzabanza mpo na yango. Atako bato mingi oyo batiká kosakola baboyi solo mpenza te, mbala mosusu batikaki kosakola mpo balɛmbi, mpo na mikakatano etali bango moko, to mpo na mitungisi mosusu ya bomoi. (Mat. 13:20-22) Bamosusu oyo bazali na bolɛmbu na elimo bazali na mposa ya lisungi mpo bázonga na lisangá liboso ete ebongiseli oyo ya Satana emela bango. (1 Pet. 5:8) Na mikolo oyo ya Ekaniseli tolingi kosala milende mpenza mpo na kosalisa bato nyonso oyo batiká kosakola bázongela lisusu kosakola nsango malamu.

11 Mokomeli ya lisangá asengeli koyebisa nkombo ya moto nyonso oyo atiká kosakola epai ya batambwisi ya boyekoli ya mokanda. Komite ya mosala ya lisangá bakozwa bibongiseli mpo na kokende kotala bato nyonso oyo batiká kosakola. Soki bamoni ete moto yango asengeli koyekola lisusu Biblia, komite ya mosala esengeli kozwa ekateli mpo na kopona ndeko oyo abongi mpo na kotambwisa boyekoli yango. Atako boyekoli yango esengeli kosalema na boumeli ya ntango molai te, ndeko oyo aponami mpo na kotambwisa boyekoli yango, asengeli kopesa lapolo ya ngonga, bozongeli ya sika, mpe boyekoli ya Biblia.

12 Na sanza ya Aprili na mbula eleki, ndeko mwasi moko azalaki kosakola ndako na ndako apesaki zulunalo epai ya elenge mobali moko na balabala. Mobali yango ayebisaki ye ete mwasi na ye azali motatoli ya Yehova, kasi atiká kosakola. Atunaki soki Ndako ya Bokonzi ezali wapi mpe asɛngaki ndeko mwasi yango ete aya kotala ye mpe mwasi na ye. Litomba emonanaki mpamba te babalani yango bayanganaki na likita mpe bandimaki koyekola Biblia.

13 Omibongisa mpo na kosala mingi! Mokomi ya nzembo oyo akomaki ete tosengeli koyebisa nkombo ya Yehova mpe misala na ye alobaki lisusu ete: “Bóyembela ye, bóyembela ye nzembo; bósololana mpo na misala na ye ya kokamwa nyonso. [Bómikumisa] na nkombo na ye na bulɛɛ.” (Nz. 105:2, 3) Tiká ete tómibanzabanza mpo na nkombo monene ya Yehova mpe mpo na “misala na ye ya kokamwa”; tósala milende mpo na kosala mingi na mosala ya kosakola, mpo eleko oyo ya Ekaniseli ezala mpenza sanza oyo mosala ya kosakola ekosalema mingi koleka!

[Etanda na lokasa 4]

Manaka ndenge na ndenge ya kokokisa ngonga 12 pɔsɔ na pɔsɔ na mosala ya mobongisi-nzela mosungi

Mokolo Ngonga

Mwayambo 1 2 - -

Mwamibale 1 - 3 -

Mwamisato 1 2 - 5

Mwaminei 1 - 3 -

Mwamitano 1 2 - -

Mwapɔsɔ 5 4 3 5

Mwalomingo 2 2 3 2

Motango mobimba: 12 12 12 12

Ezali na manaka moko oyo ebongi na yo? Soki ezali te, mpo na nini te kosala manaka na yo moko?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto