“Tósakola liloba ya Nzambe malamumalamu”
1 Soki olingi mpenza komonisa botɔndi mpo na eloko moko ya malamu oyo bakabeli yo, okomonisa yango te na ezaleli na yo mpe na misala na yo? Na ntembe te, osalaka bongo! Talá ndenge ntoma Paulo alobaki mpo na oyo etali bolamu mpe boboto ya Yehova epai ya bato. Alobaki ete: “Nzambe azwa matɔndi mpo na likabo na ye wana ya ofele oyo ekoki kolimbolama te”! “Likabo yango ya ofele” ezali nini? Ezali nde “ngɔlu ya Nzambe oyo eleki mpenza”; amoniselaki biso ngɔlu yango na koleka mpenza ntango apesaki Mwana na ye lokola lisiko mpo na masumu na biso.—2 Kol. 9:14, 15, NW; Yoa. 3:16.
2 Maloba wana ya Paulo oyo emonisi botɔndi oyo azalaki na yango, ezalaki se maloba mpamba? Soki moke te! Na makambo mingi, amonisaki mpenza botɔndi na ye. Azalaki komitungisa mingi mpo na bolamu ya elimo ya baninga na ye baklisto mpe azalaki na mposa ya kosala nyonso oyo ezalaki na makoki na ye mpo na kosalisa bango ete bázwela boboto ya Nzambe matomba mingi mpenza. Mpo na bango, Paulo alobaki ete: “Kozaláká na bolingo ya motema mpo na bino, tosepelaki mingi kopesa bino kaka nsango malamu ya Nzambe te, kasi mpe milimo na biso moko, mpamba te bokómaki mpo na biso balingami.” (1 Tes. 2:8, NW) Longola ndenge azalaki kosalisa baoyo bazalaki na kati ya lisangá ete básala milende mpo bázwa lobiko, Paulo alɛmbaki te kosakola nsango malamu; asalaki mibembo ya milai, ezala na mokili to na mai monene, mpo na koluka ‘baoyo bazalaki na ezaleli oyo ebongi mpo na bomoi ya seko.’ (Mis. 13:48, NW) Botɔndi mingi oyo Paulo azalaki na yango mpo na nyonso oyo Yehova asalelaki ye, etindaki ye na “kosakola liloba ya Nzambe malamumalamu.”—Kols. 1:25, NW.
3 Botɔndi na biso mpo na nyonso oyo Yehova asaleli biso ezali te kotinda biso na kopesa lisalisi ya elimo epai ya baoyo bazali na mposa na yango na lisangá na biso? (Gal. 6:10) Ezali mpe kotinda biso te na kosala mingi mpenza na mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi na teritware na biso?—Mat. 24:14.
4 Ntango ya komonisa botɔndi: Mbula na mbula, Ekaniseli ya liwa ya Klisto epesaka biso libaku malamu ya komonisa botɔndi mpo na oyo Yehova na Yesu basali mpo na biso. Yango ekeseni mpenza na makita mosusu oyo tosalaka; yango ezali kaka te ntango ya kokanisa likambo moko boye oyo eleká. Yesu alobaki ete: “Bósalaka boye mpo na kokanisa ngai.” (Luka 22:19, NW) Ekaniseli ya liwa ya Klisto ezali ntango ya kokanisa na mozindo bomoto ya Yesu. Ezali ntango ya komikundola ete lelo oyo Yesu azali na bomoi mpe azali kosala; azali na lokumu mpe na bokonzi oyo Tata na ye apesaki ye mpo atikalaki sembo ntango azalaki awa na mabele mpe mpo apesaki bomoi na ye lokola mbeka. Likita yango ezali mpe ntango ya komonisa ete tozali kotosa Klisto ndenge azali kotambwisa biso mpamba te ye nde azali kotambwisa makambo nyonso ya lisangá ya boklisto. (Kols. 1:17-20, NW) Basaleli nyonso ya Nzambe basengeli kozanga te na Ekaniseli ya liwa ya Klisto mpo na komonisa limemya na bango. Na mbula oyo, likita yango ekosalema nsima ya kolala ya moi na mokolo ya minei 28 Marsi 2002.
5 Milende oyo mokomoko na biso asalaki liboso ya Ekaniseli ya mbula oyo euti koleka esalaki ete bato 592 292 na Congo-Kinshasa mpe 20 258 na Congo-Brazzaville báyangana na Ekaniseli yango; wana ezalaki mitango eleki minene oyo tozwaki naino liboso te. Bato boni bakoyangana na Ekaniseli ya mbula oyo? Yango ekotalela mingimingi ndenge oyo ‘tokosala mosala makasi mpe tokomipesa mobimba,’ mpo na kosalisa bato ebele ete báyangana na Ekaniseli.—1 Tim. 4:10, NW.
6 Longola koyangana na Elambo ya Mpokwa ya Nkolo, tokoki mpe ntango mosusu kobima mingi na mosala ya kosakola. Na ntembe te, ebele ya bandeko mibali mpe basi bakozala babongisi-nzela basungi mpo na sanza moko to basanza mingi. Mbula na mbula, na boumeli ya mbula mitano oyo euti koleka, bandeko soki 14 458 bazalaki babongisi-nzela basungi na eleko ya Ekaniseli, elingi koloba kobanda na sanza ya Marsi tii na sanza ya Mai. Okoki nde komibongisa mpo ete na mbula oyo yo mpe ozala na libaku malamu ya kozala mobongisi-nzela mosungi? Ekozala lolenge oyo eleki malamu ya komonisa botɔndi na yo mpo na mbeka ya Klisto, oyo ezali likabo ya bolingo oyo Nzambe apesaki mpo na biso. Ndenge tokomona yango na makambo oyo bandeko bakutanaki na yango, zalá mpenza na elikya ete Yehova akopambola yo soki osali bongo.
7 Ndeko mwasi moko oyo azalaki mobongisi-nzela mosungi na sanza ya Marsi ya mobu oyo euti koleka, ye asalaka mosala oyo ezwaka ye mokolo mobimba akomaki boye: “Mosala na Biso ya Bokonzi ya sanza ya Febwali 2001 elendisaki moto nyonso oyo azalaki na likoki ya kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi na eleko ya Ekaniseli asala yango. Lokola sanza ya Marsi ezalaki na bawikende mitano, yango eyokanaki malamu na programɛ na ngai. Na yango, nazwaki ekateli ya kotondisa lokasa mpo na kosɛnga mosala yango.” Ntango sanza yango ebandaki, amityelaki mokano ya koluka moto moko oyo akobanda koyekola na ye Biblia. Azwaki ye? Ɛɛ, nsima ya kokokisa ngonga 52 na mosala ya kosakola na sanza wana! Ndeko yango asukisaki na maloba oyo: “Tokozwa mapamboli mingi soki tosali milende koleka ndenge tomeseni kosala.”
8 Soki libota mobimba basɛngi mosala ya mobongisi-nzela, matomba nini bakozwa? Libota moko ya bato minei oyo basalaki mosala yango na sanza ya Aprili na mbula oyo euti koleka, bamonaki ete sanza yango ezali sanza oyo bakoki kobosana yango te. Mama alobaki ete: “Lokola mosala ya kosakola esangisaki biso liboke moko, ntɔngɔ nyonso tozalaki komona kaka ete mokolo ekozala malamu! Ntango ya kolya ekómaki ntango moko ya esengo mpenza, mpamba te tozalaki kobɛta masolo ya makambo oyo tozalaki kosala mokolo na mokolo na mosala ya kosakola.” Mwana na bango ya mobali alobaki ete: “Nasepelaki ndenge tozalaki kobima na tata na mosala ya kosakola na boumeli ya pɔsɔ; mpamba te na momeseno, na bantango wana azalaka nde na esika na ye ya mosala.” Tata abakisaki ete: “Lokola nazali mokonzi ya libota, nasepelaki mingi ndenge nayebaki ete tozalaki kosala elongo mosala oyo eleki ntina kati na misala nyonso ya mikolo na biso.” Bokoki kosɛnga bino nyonso libota mobimba mosala ya mobongisi-nzela? Mpo na nini te kosolola na bato nyonso ya libota na yo mpo na kotala soki bino nyonso bokoki kozala babongisi-nzela basungi na eleko ya Ekaniseli oyo?
9 Tokoki kosala ete sanza ya Marsi ezala sanza oyo eleki basanza nyonso? Na ebandeli ya mobu 2000, Mosala na Biso ya Bokonzi etunaki motuna oyo: “Tokoki kosala ete sanza ya Aprili 2000, ezala sanza oyo eleki basanza nyonso?” Eyano ezalaki nini? Bokoli emonanaki na makambo mingi. Na sanza moko, babongisi-nzela basungi bazalaki 7 964 oyo ezalaki motángo eleki monene oyo tozwá naino liboso te. Longola yango, tozwaki mitángo eleki minene oyo tozwá naino liboso te na oyo etali bangonga, bazulunalo oyo tokabolaki mpe bato oyo tozongelaki. Ozali komikundola lisusu esengo oyo bandeko ya lisangá na bino bazalaki na yango mpo bamipesaki mpenza na makambo ya elimo na sanza wana oyo ekokanaki na mosusu te? Na mbula oyo, tokoki nde kosala ndenge moko to mpe ata koleka? Soki biso nyonso tosangisi milende na biso, sanza ya Marsi 2002 ekoki kozala “sanza oyo eleki basanza nyonso.” Mpo na nini sanza ya Marsi?
10 Ezali na ntina mibale oyo esali ete sanza ya Marsi ezala sanza oyo ekeseni na basanza mosusu mpo na mosala. Ya liboso, Ekaniseli ekosalema pene na nsuka ya sanza ya Marsi; tokozala bongo na libaku, banda na ebandeli ya sanza yango, ya kobenga bato ebele na Ekaniseli yango. Ya mibale, na mbula oyo, sanza ya Marsi ekozala na bawikende mitano; na yango, ekozala mpasi te mpo na baoyo basalaka to bakendaka kelasi ete básala mosala ya mobongisi-nzela mosungi. Na lisalisi ya manaka oyo etyami na siplema oyo, tosɛngi yo ozwa ntango ya kokanisa malamu mpo na kobongisa programɛ ya malamu. Na ntembe te, okomona ete mosala ya mobongisi-nzela mosungi ezali mpasi mingi te ndenge okanisaka yango. Na ndakisa, lokola bawikende ezali mitano, soki obongisi programɛ ya kosakola ngonga 8 na bawikende yango, okotikala kaka na ngonga 10 ya kobakisa na mikolo oyo etikali mpo okokisa ngonga 50 oyo esɛngami.
11 Bankulutu bakoki kosala nini mpo na kosalisa bandeko nyonso ya lisangá na “kosakola liloba ya Nzambe malamumalamu”? Basengeli kolendisa bandeko ntango bazali kosala masolo na makita, ata mpe na masolo oyo basololaka na bango na bantango mosusu. Batambwisi ya Boyekoli ya Mokanda mpe basungi na bango bakoki kozwa likanisi ya kosolola na moto mokomoko ya etuluku na bango mpe kopesa ye lisalisi oyo asengeli na yango. Ntango mosusu bandeko basengeli kaka na mwa maloba ya boboto mpe ya kolendisa to mwa makanisi oyo ezali komonisa nini mpenza bakoki kosala. (Mas. 25:11) Mingi bakomona ete soki babongoli kaka moke programɛ na bango, bakoki kozwa libaku malamu ya kosala lokola babongisi-nzela basungi. Na masangá mingi, tóloba kaka pene na bankulutu na basaleli ya misala nyonso, na basi na bango, bapesaka ndakisa malamu ndenge basalaka nzela moko mosala ya mobongisi-nzela mosungi na boumeli ya eleko ya Ekaniseli. Yango elendisaka basakoli mingi mpe etindaka bango básala mpe mosala yango. Basakoli mosusu, mpo na mikakatano ya nzoto to mpo na mikakatano mosusu, bakozala ntango mosusu na likoki te ya kosala mosala ya mobongisi-nzela; kasi bakoki kolendisama na kosakola mingi, na kotalela makoki na bango, elongo na bandeko mosusu ya lisangá mpo na komonisa botɔndi na bango.
12 Mpo makambo nyonso eleka malamu, yango etaleli ndenge bankulutu bakobongisa makambo malamumalamu. Na boumeli ya pɔsɔ, basengeli kotya makita mpo na mosala ya kosakola na bantango oyo ebongi. Soki likoki ezali, mokɛngɛli na mosala ya kosakola akopona libelalibela bandeko ya makoki oyo bakotambwisa makita nyonso mpo na mosala ya kosakola. Basengeli komibongisa malamu mpo ete likita yango ezwa kaka miniti 10 to 15 kasi koleka te; kokabola bato, kopesa bateritware mpe libondeli, makambo nyonso wana esengeli kosalema kaka na miniti wana. (Talá etanda “Biyano na mituna na bino,” na Mosala na Biso ya Bokonzi ya Sɛtɛmbɛ 2001.) Bosengeli kolimbola polele na lisangá programɛ ya mosala ya kosakola mpo na sanza yango mpe kotya yango na etanda ya mayebisi.
13 Esengeli kobongisa bateritware ebele. Mokɛngɛli na mosala ya kosakola elongo na ndeko oyo akabolaka bateritware, basengeli mpe kobongisa bateritware oyo basakoli batalaka yango mingimingi te mpo bandeko basakola mpe kuna. Bosengeli mpenza kosala milende mpo na kokutana na bato oyo bokutaka bango te na ndako; bosengeli mpe kosala milende mpenza mpo na kopesa litatoli na babalabala, na bamagazini, mpe na mpokwa. Na bisika oyo likoki ya kosala yango ezali, bokoki kosalisa basakoli mosusu mpo bápesa litatoli na telefone.
14 Tósalisa bango bázongela kosakola: Na teritware ya lisangá na bino, ezali na basakoli mosusu oyo batiká kosakola nsango malamu? Basakoli yango bazali kaka na kati ya lisangá mpe bazali na mposa ya lisalisi. (Nz. 119:176) Lokola nsuka ya mokili oyo esili konuna ekómi mpenza pene mpe mokili ya sika ezali lisusu mosika te, ebongi mpenza tósala makasi mpo na kosalisa baoyo batiki kosakola. (Lom. 13:11, 12) Na mbula mitano oyo euti koleka, mbula na mbula bato ebele bandimaki lisalisi oyo bapesaki bango mpe bazongelaki kosakola. Tokoki kosala nini mpo na kosalisa ebele mosusu oyo batikali ete bázongela komonisa bolingo mpe elikya oyo bazalaki na yango ntango babandaki kosakola?—Ebe. 3:12-14.
15 Ekozala malamu ete lisangani ya bankulutu básolola mpo na kotala ndenge nini bakoki kosalisa baoyo batikaki kosakola na boumeli ya mwa bambula oyo euti koleka. (Mat. 18:12-14) Mokomeli ya lisangá asengeli kotala bakalati ya basakoli mpe kokoma bankombo ya baoyo nyonso batiki kosakola. Na nzela ya ebongiseli ya kotalaka bampate, bankulutu basengeli kosala mpenza makasi mpo na kopesa basakoli yango lisungi. Ntango mosusu nkulutu moko, oyo ayebanaki malamu na mosakoli moko oyo atiká kosakola mpe azalaki koyokana na ye malamu, akoki kokende kotala ye; to mpe bankulutu bakoki kosɛnga basakoli mosusu mpo básalisa ye. Ekoki kozala ntango mosusu mosakoli oyo ayekolaki Biblia na moto yango; soki ezali bongo, mosakoli yango akondima mpenza libaku oyo bapesi ye ya kosalisa lisusu moto yango na ntango oyo azali na mposa ya lisalisi. Tokanisi ete mingi na baoyo batikaki kosakola bakoyoka lisusu mposa ya kozongela kosakola liloba ya Nzambe. Soki bakokisi masɛngami, eleko ya Ekaniseli nde ezali ntango ya malamu mpenza mpo bázongela kosakola!—Mpo na koyeba makambo mosusu, talá Biyano na mituna na bino, na Mosala na Biso ya Bokonzi ya Novɛmbɛ 2000.
16 Ezali na bato mosusu oyo bakokisi masɛngami mpo na kosakola? Yehova azali kokoba kopambola basaleli na ye na ndenge azali kobakisela bango “biloko kitoko ya mabota nyonso.” (Hag. 2:7, NW) Mbula na mbula, ebele ya bato bazali kokokisa masɛngami mpo na kokóma basakoli oyo bazwi naino batisimo te. Bato yango bazali banani? Ezali bongo bana ya Batatoli ya Yehova mpe bayekoli ya Biblia oyo bazali kokola. Ndenge nini tokoki koyeba soki bakokisi masɛngami mpo na kokóma basakoli ya nsango malamu?
17 Bana ya Batatoli ya Yehova: Na boumeli ya bambula mwa mingi, bana mingi babimaka na baboti na bango na mosala ya ndako na ndako, atako bakómi naino te basakoli oyo bazwi naino batisimo te. Sanza ya Marsi ekoki kozala ntango malamu mpo na kosalisa bango bákóma basakoli. Ndenge nini okoki koyeba soki mwana na yo akokisi masɛngami? Na kotalela buku Lisanga mpo na kokokisa mosala ya Nzambe, lokasa 101, okoyeba yango “soki mwana . . . azali na etamboli malamu [mpe] azali na mposa mpe na mayele ya kolimbola kondima na ye na kosakolaka nsango malamu.” Soki omoni ete mwana na yo akokisi masɛngami wana, yebisá yango na nkulutu moko oyo azali na Komite ya mosala ya lisangá.
18 Bayekoli ya Biblia oyo bakokisi masɛngami: Moyekoli ya Biblia oyo azwi boyebi mpe asali mwa ntango banda akómá koyangana na makita, akoki nsima na yango komonisa mposa ya kokóma mosakoli ya Bokonzi. Soki ozali koyekola na moto ya ndenge wana, talelá mituna oyo: Na kotalela mbula na ye mpe mayele na ye, azali mpenza kokola? Asili kobanda, na ndenge na ye moko, koyebisa bato mosusu makambo oyo akómi kondima? Azali ‘kolata bomoto ya sika’? (Kols. 3:10) Akokisi masɛngami oyo ezali na nkasa 99-100 ya buku Lisanga mpo na oyo etali kokóma mosakoli oyo azwi naino batisimo te? Soki eyano na mituna wana ezali ɛɛ, osengeli koyebisa Komite ya mosala ya lisangá mpo bákoka kozwa bibongiseli mpo ete bankulutu mibale bákutana na yo mpe na moyekoli yango. Soki akokisi masɛngami, bankulutu wana mibale bakoyebisa ye ete akoki sikoyo kobanda kobima na mosala ya kosakola.
19 Tokoloba boni mpo na sanza ya Aprili mpe sanza ya Mai? Yango mpe ekozala basanza ya ntina mingi mpo na kosala mingi na mosala ya kosakola. Mingi na baoyo bakosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi na sanza ya Marsi, bakozala ntango mosusu na likoki ya kosala yango lisusu na sanza ya Aprili to mpe na sanza ya Mai. Na sanza ya Aprili mpe na sanza ya Mai, tokomipesa mingimingi na kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! na mosala ya kosakola. Bato oyo batángaka yango basili kozwa matomba mingi na bomoi na bango! Bazulunalo yango esalisi biso mingi mpo tózwa bokoli ya kokamwa oyo ezali komonana na mokili mobimba. Tokobakisa mpenza milende na sanza ya Aprili mpe na sanza ya Mai mpo na kolakisa bazulunalo yango epai ya bato ebele koleka. Bandá komibongisa sikoyo mpo yo mpe okoka komipesa mingi na mosala yango.
20 Lokola omibongisi mpo na kosakola mingi, okanisi te ete ekozala malamu obakisa motuya ya bazulunalo oyo ozwaka na lisangá? Na boumeli ya mbula ya mosala, tolakisaka Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! na mokolo ya pɔsɔ, oyo totyá yango lokola Mokolo ya Bazulunalo. Kasi, lokola basakoli mingi bakosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi mpe biso nyonso tokobanda kolakisa bazulunalo na boumeli ya sanza mibale mobimba, ekozala malamu osɛnga lisusu bazulunalo mingi koleka ndenge bapesaka yo na lisangá. Soki olingi kosala yango, tosɛngi yo oyebisa mbala moko ndeko oyo atalelaka makambo ya bazulunalo na lisangá na bino. Ndeko oyo atalelaka mikanda, ye mpe asengeli komindimisa ete lisangá ezali na batrakte mingi, oyo ezali na motó ya likambo Aimeriez-vous en savoir plus sur la Bible? (Olingi koyeba makambo mingi na ntina na Biblia?) mpo basakoli nyonso bákoka kozala na yango mpo na kokabola.
21 Bandeko mingi bamonisaki botɔndi mpo na masolo ya Mosala na Biso ya Bokonzi oyo ezali na motó ya likambo “Ndenge ya kolakisa bazulunalo.” Omekaka kosalela ndenge ya kolakisa bazulunalo oyo bamonisaka na masolo yango mpo na komonisa ete ozali mpenza kosalela yango malamu? Pɔsɔ na pɔsɔ, na ntango ya boyekoli ya Biblia na libota, bokoki te kotika mwa ntango mpo na komeka ndenge wana ya kolakisa bazulunalo?
22 Tósalela malamu mpenza eleko ya Ekaniseli oyo: Tósala lokola ntoma Paulo, tómipesa mpenza na makambo ya elimo oyo ebongisami mpo na eleko ya Ekaniseli oyo mpo na komonisa Yehova ete tozali na botɔndi mingi mpo na “likabo na ye . . . ya ofele oyo ekoki kolimbolama te.” Makambo yango ya elimo ezali (1) koyangana na mokolo ya minei 28 Marsi 2002 na Elambo ya Mpokwa ya Nkolo, likita oyo eleki ntina na mbula mobimba; (2) kosalisa baoyo batiká kosakola ete bázongela ‘bolingo oyo bazalaki na yango liboso’ (Emon. 2:4; Lom. 12:11, NW); (3) kosalisa bana na biso mpe bato oyo toyekolaka na bango Biblia, oyo bakokisi masɛngami, ete bákóma basakoli oyo bazwi naino batisimo te; mpe (4) komipesa mingi na mosala ya kosakola nsango malamu, ata mpe kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi na sanza ya Marsi mpe na basanza oyo ekoya nsima.—2 Tim. 4:5, NW.
23 Libondeli mpe mposa na biso ezali ete biso nyonso tósakola mingi mpenza nsango malamu ya Bokonzi na eleko ya Ekaniseli oyo; na ndenge yango, tokomonisa ete tozali na botɔndi mingi mpo na nyonso oyo Yehova azali kosala mpo na biso.
[Etanda na lokasa 6]
Programɛ na ngai moko mpo na mosala ya kosakola na sanza ya Marsi 2002
Mwalomingo Mwayambo Mwamibale Mwamisato Mwaminei Mwamitano Mwapɔsɔ
1 2
Mokolo ya
Bazulunalo
3 4 5 6 7 8 9
Mokolo ya
Bazulunalo
10 11 12 13 14 15 16
Mokolo ya
Bazulunalo
17 18 19 20 21 22 23
Mokolo ya
Bazulunalo
24 25 26 27 28 29 30
EKANISELI Mokolo ya
NSIMA YA Bazulunalo
31 KOLALA
YA MOI
Okoki kosala programɛ oyo ekosalisa yo okokisa ngonga 50 mpo ozala mobongisi-nzela mosungi na sanza ya Marsi?