Tósakola bizaleli malamu ya Yehova
1. Nini etindaka biso tósakola bizaleli malamu ya Yehova?
1 “Ee [Yehova], epai na yo, monene ezali mpe nguya mpe nkembo mpe elonga mpe lokumu. Zambi nyonso na likoló mpe na nse ezali na yo.” (1 Nta. 29:11) Bolingo mpe botɔndi na biso epai ya Yehova etindaka biso tósala nini? Etindaka biso ‘tósakola bizaleli malamu ya moto oyo abengaki biso tólongwa na molili tókɔta na kati ya pole na ye ya kokamwa.’ (1 Pet. 2:9) Tokoki te kotika koyebisa bato makambo ya Nzambe na biso monene! Na sanza ya Marsi, Aprili, mpe Mai, tokozwa mabaku malamu mpenza ya kosakola bizaleli malamu ya Yehova.
2. Kampanye nini ya monene ebongisami mpo na Ekaniseli, mpe banani bakosala yango?
2 Kampanye monene ya kobenga bato na Ekaniseli: Na mokolo ya mosala moko, mwa 2 Aprili, ntango tokosala Bolei ya Mpokwa ya Nkolo, tokomonisa polele bizaleli malamu ya Yehova. Na mokili mobimba, banda mokolo ya 17 Marsi kino mokolo ya 2 Aprili, tokopesa bato lokasa ya libyangi mpo na Ekaniseli. Ndeko nyonso alendisami ete akabola mpenza nkasa yango ya libyangi. Yango ekozala ntango ya malamu mpenza mpo baoyo bakokisi masɛngami bábanda kosakola. Soki ozali na bana to na bayekoli ya Biblia oyo bakoki kokokisa masɛngami, kende koyebisa bankulutu.
3. Tokoki koloba nini mpo na kobenga bato na Ekaniseli?
3 Kampanye yango ekozala lokola oyo esalemaki mpo na liyangani ya etúká “Lobiko ekómi pene!” Masangá bakozwa nkasa ya libyangi mingi mpo mosakoli mokomoko akoka kozwa nkasa ya libyangi 50 mpe mobongisi-nzela mokomoko 150. Ntango ozali kopesa lokasa yango, koloba mingi te; okoki kaka koloba boye: “Lokasa oyo ezali mpo na kobenga yo na likambo moko ya ntina mingi oyo esalemaka mbala moko na mbula. Tozali kozela yo na esengo. Makambo mosusu ezali na kati ya lokasa yango.” Nzokande, soki moto yango atuni mituna, pesá ye biyano na mituna yango. Makambo ya apɛndisi oyo elobeli Bolei ya Mpokwa ya Nkolo na buku Biblia eteyaka, na lisolo oyo ebandi na lokasa 206 ekoki mpe kosalisa yo. Na nsuka ya pɔsɔ, tokotikela bato bazulunalo mpe nkasa ya libyangi. Komá nkombo ya bato nyonso oyo bakosepela mpe salá makasi ozongela bango.
4. Ndenge nini nkasa ya libyangi ekokabolama?
4 Na bisika oyo ekokoka, esengeli kopesa bato nkasa yango ya libyangi na mabɔkɔ. Na yango, komá bato oyo okutaki na ndako te, mpe luká kozongela bango na ntango mosusu. Pɔsɔ moko liboso ya Ekaniseli, masangá oyo ekotikala na nkasa ya libyangi mingi bakobanda kotya lokasa ya libyangi na nse ya porte ya ndako oyo bakuti bato te; kasi bakosala bongo na ebandeli ya kampanye te. Kobosana te kopesa bato oyo nkasa ya libyangi: bato oyo ozongelaka, bato oyo oyekolaka na bango Biblia, bandeko na yo oyo bazali bandimi te, baninga na yo ya mosala mpe bato oyo bafandaka pene na bino.
5. Mpo na nini tosengeli komibongisa uta sikoyo mpo na kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi?
5 Mosala ya mobongisi-nzela mosungi: Okoki kozala mobongisi-nzela mosungi na sanza ya Marsi, Aprili, mpe Mai, mpo osakola lisusu mingi bizaleli malamu ya Yehova? Mpo na kosala yango ekosɛnga obongola makambo mosusu oyo osalaka mokolo na mokolo. (Ef. 5:15-17) Yebá ete kosala mingi na mosala ya Yehova ekopesa yo esengo mingi mpe mapamboli. (Mas. 10:22) Lokola eleko ya Ekaniseli ekómi pene, sikoyo nde ntango ya komibongisa.—Mas. 21:5.
6. Liteya nini tozwi na ndakisa ya ndeko mwasi moko ya mbula 90 oyo azalaki mobongisi-nzela mosungi na mbula eleki?
6 Na mbula eleki, ndeko mwasi moko ya mbula 90 azalaki mobongisi-nzela mosungi. Alobi boye: “Atako nalingaka kolona fololo ná ndunda mpe nakómaki pene na kolona yango, namonaki ete esengeli natya makambo oyo eleki ntina na esika ya liboso. Lokola nazalaki na mposa ya kotya Bokonzi ya Nzambe na esika ya liboso, nazwaki mokano ya kozala mobongisi-nzela mosungi na sanza ya Marsi.” Matomba nini azwaki? Alobi ete: “Nazali komiyoka mpenza ete nazali na kati ya lisangá, mpe yango ekómisi ngai lisusu penepene na Yehova.” Tokoki nde kotalela makambo oyo totyaka na esika ya liboso mpe kobongola makambo mosusu soki esengeli?
7. Kozala mobongisi-nzela mosungi ezali mpasi mingi?
7 Ntango mosusu, kokokisa ngonga 50 oyo basɛngaka babongisi-nzela basungi ezali mpasi te ndenge ozali kokanisa. Talelá makambo osalaka mokolo na mokolo mpe bondelá mpo nayango; salá programɛ mpe komá yango na esika okomaka makambo na yo ya elimo. Yo moko nde omiyebi malamu. Soki obɛlaka mpe nzoto ezali makasi te, okoki ntango mosusu kosakolaka mwa bangonga mokolo na mokolo. Soki osalaka mokolo mobimba to otángaka, okoki kozala mobongisi-nzela mosungi soki ozali kosakola na bampokwa to na mikolo ya pɔsɔ mpe ya lomingo.
8. Nini esalisaki mwasi moko ná mobali na ye bázala babongisi-nzela basungi?
8 Mabota mosusu basalaki bango nyonso mosala ya mobongi-nzela mosungi. Na bambula eleki, mwasi moko ná mobali na ye bazalaki kokakatana kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi, mpo bamonaki ete bakokoka te. Basalaki nini? Balobi boye: “Tobondelaki Yehova asalisa biso tósala mosala oyo tozalaki na mposa ya kosala yango banda kala.” Lokola bamibongisaki malamu, bakokisaki bangonga na bango. Babakisi boye: “Ezalaki esengo mpenza. Tozwaki mapamboli mingi. Likanisi na biso yango oyo: bómeka naino. Soki biso tosalaki yango, bino mpe bokokoka kosala yango.”
9. Bokoki kosala nini na boyekoli na bino ya libota oyo ekolanda mpo na komibongisa ete bósakola mingi koleka na sanza ya Marsi, Aprili, mpe Mai?
9 Mpo na nini te kotika mwa ntango na boyekoli na bino ya libota oyo ekolanda, mpo na kotalela ndenge bino nyonso bokoki kosala mpo na kosakola mingi na basanza ekoya? Ata soki libota mobimba bokoki kozala babongisi-nzela basungi te, kasi moko na bino akoki kosala mosala yango mpe basusu bápesa ye mabɔkɔ. Soki ata moko amonani te na libota, bokoki komityela mokano ya kosakola mingi, na sanza ya Marsi, Aprili, mpe Mai.
10. Mpo na nini tosengeli koyebisa basusu mposa na biso ya kozala mobongisi-nzela mosungi na eleko oyo ya Ekaniseli?
10 Tósalisana: Soki ozali na esengo, bato mosusu mpe bakokóma na esengo. Yebisá basusu mposa na yo ya kozala mobongisi-nzela mosungi. Yango ekoki kolendisa bango mpe básala mosala yango. Lisusu, bandeko oyo basalaki mosala yango mbala eleki, bakoki kopesa yo makanisi oyo ekosalisa yo obongisa programɛ na yo mpo okokisa bangonga. (Mas. 15:22) Soki ozali na likoki ya kozala mobongisi-nzela mosungi, mpo na nini te kobenga ndeko moko oyo makambo na ye ezali lokola oyo ya yo, mpo bósala elongo mosala yango ya esengo?
11. Ndenge nini bankulutu bakoki kopesa bandeko esengo ya kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi na basanza ekoya?
11 Bankulutu mingi bazwi bibongiseli mpo bázala babongisi-nzela basungi. (Ebe. 13:7) Na ntembe te, yango ekolendisa lisangá! Bankulutu bakopesa mpe bandeko mposa ya kosala mosala yango ntango bazali kosolola na bango. Ntango mosusu, kaka mwa maloba ya kolendisa mpe makanisi oyo ebongi nde ekoki kotinda bandeko mosusu básala mosala ya mobongisi-nzela mosungi. Mokɛngɛli na mosala ya kosakola akobongisa makita ya mosala ya kosakola mingi, mpo bandeko bákoka kosakolaka na bituluku ata na nsima ya mosala to ya kelasi. Basengeli koyebisa bibongiseli yango mbala na mbala. Akosala mpe ete basakoli nyonso bázala na bateritware na bango mpe na mikanda oyo esengeli.
12. Okoki kosala nini soki yo moko okokoka kozala mobongisi-nzelamosungi te?
12 Ata soki bomoi na yo epesi yo nzela te ya kozala mobongisi-nzela mosungi, okoki kolendisa bandeko oyo bakosala yango mpe kobondela mpo na bango. (Mas. 25:11; Kols. 4:12) Ntango mosusu, okoki kobima na bango na mosala ya kosakola ata na mokolo oyo obimaka te, to mpe soki obimi na bango, okoki koumela mwa mingi koleka ndenge osalaka na momeseno.
13. Mokano nini etyami mpo na Congo, mpe ndenge nini lisangá na bino ekoki kosala mpo mokano yango ekokisama?
13 Na sanza ya Aprili tosengeli kozwa babongisi-nzela basungi 22 750: Congo-Brazzaville ezwaki babongisi-nzela basungi ebele mpenza na mobu 2000: bazalaki 556; mpe Congo-Kinshasa na mobu 1997: bazalaki 8 260. Yango wana, na sanza ya Aprili, tozali na mokano ya kozwa babongisi-nzela basungi 750 na Congo-Brazzaville mpe 22 000 na Congo-Kinshasa. Tokoki kokokisa mitángo yango soki mosakoli 1 kati na basakoli 6 ya lisangá mokomoko asɛngi mosala ya mobongisi-nzela mosungi. Na ntembe te, na masangá mosusu, basakoli mingi bakokoka kozala babongisi-nzela basungi. Masangá mingi bakokokisa mokano yango. Kanisá naino esengo oyo yango ekobimisa na lisangá na bino mpe mapamboli oyo ekozwama na mosala ya kosakola na teritware na bino!
14. Mpo na nini Aprili ezali sanza ya malamu ya kozala mobongisi-nzela mosungi?
14 Mpo na nini Aprili ezali sanza ya malamu ya kozala mobongisi-nzela mosungi? Ekaniseli ekozala na ebandeli ya sanza, yango ekopesa biso nzela ya kotala mpe kozongela baoyo bayaki na Ekaniseli. Tokotikela bato bazulunalo, mpe ntango tokozongela bango, tokotikela bango buku Biblia eteyaka mpo na kobanda koyekola na bango Biblia. Na yango, kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi na sanza ya Aprili ekopesa nzela ya kobanda koyekola Biblia na bato mingi. Lisusu, sanza yango ezali na mikolo ya lomingo mitano mpe mokolo moko oyo bato basalaka te na mokili mobimba. Na yango, ekozala mpasi te mpo bato oyo basalaka to bana-kelasi básala mosala ya mobongisi-nzela mosungi.
15. Mpo na nini tosengeli komilɛngɛla nokinoki na eleko oyo ya Ekaniseli?
15 Mbula na mbula oyo eleko ya Ekaniseli ezali koleka, ezali kokómisa biso pene na nsuka ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo. Ntango oyo etikali mpo na koyebisa bato makambo ya Nzambe na biso monene ekómi mokuse. (1 Kol. 7:29) Soki eleko ya Ekaniseli eleki, mabaku oyo yango epesaki biso ya kosanzola Tata na biso ya likoló mpe eleki libela. Tiká tómilɛngɛla uta sikoyo mpo na kosala nyonso oyo tokokoka, mpo na kosakola bizaleli malamu ya Yehova na sanza ya Marsi, Aprili, mpe Mai!
[Etanda na lokasa 4]
Tokoki nde kozwa babongisi-nzela basungi 22 750 na sanza ya Aprili?
◼ Talelá makambo oyo osengeli kotya na esika ya liboso
◼ Bólobela mikano na bino na libota
◼ Yebisá basusu programɛ na yo