Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 12/01 lok. 8
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2001
  • Masolo mosusu
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2006
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo (Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
    Mosala na biso ya Bokonzi—2003
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2004
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2007
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2001
km 12/01 lok. 8

Ndenge ya kolakisa bazulunalo

(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 15 Des.

“Mbula na mbula, na mikolo oyo bato mingi bakanisaka Yesu Klisto, ezala baoyo bandimaka ye to baoyo bandimaka ye te. Bato mosusu balobaka ete azalaki moto ya solo te. Yo okanisi nini? [Nsima ya koyoka eyano na ye, tángá Matai 16:15, 16.] Nandimi ete okosepela kotánga lisolo oyo ezali kolobela ‘Yesu oyo ya solo,’ mpo na komona ndenge oyo akoki kobongola bomoi na yo lelo oyo mpe ndenge akoki kobongola yango na mikolo oyo ezali koya.”

Lamuká! 22 Des.

“Ondimaka ete mpo tózala malamu na bomoi na biso esengeli tózala na biloko malamu ya kolya mpe oyo ekozala na likama te mpo na nzoto? [Tiká ye apesa eyano.] Talá likambo oyo Nzambe alakaki bato na ye na ntango ya kala. [Tángá Levitike 26:4, 5.] Lamuká! ezali kolobela mitungisi oyo bato bazali na yango lelo oyo mpo na biloko ya kolya. Ezali mpe kolobela ntango oyo Nzambe akobatela biso epai nyonso na mokili.”

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Yan.

“Omitunaka mpo na nini bato mosusu bazalaka na bomoi moko ya malamu, kasi bamosusu banyokwamaka mpo na kozwa mwa eloko ya kobikela? Biblia ezali kolobela likambo yango. [Tángá Yobo 34:19.] Zulunalo oyo ezali komonisa ndenge oyo Nzambe azali kokana kosala mpo ete bokeseni kati na bato ezala lisusu te.”

Lamuká! 8 Yan.

“Na mokili mobimba, koningana ya mabele ezali koboma ebele ya bato mpe kobebisa biloko mingi. Mbala mingi, bato oyo babikaka bazangaka esika ya kofanda. Lamuká! oyo ezali komonisa ndenge bato mingi basalaki mpo na kolonga mikakatano oyo ebimaka nsima ya koningana ya mabele. Ezali mpe kolimbola ete koningana ya mabele ezali moko ya makambo oyo elobelamaki na esakweli moko ya ntina mingi oyo ezali na Biblia.”

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto