Ndenge ya kolakisa bazulunalo (Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 15 Des.
“Mbula na mbula na eleko oyo, bato mingi bakanisaka mbotama ya Yesu. Omituná naino te soki Yesu akolaki na libota ya ndenge nini? [Tiká ye apesa eyano. Nsima tángá Luka 2:51, 52.] Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo ezali kolobela liteya ya ntina oyo tokoki kozwa na lisolo ya Biblia oyo elobeli ndenge babɔkɔlaki Yesu.”
Lamuká! 22 Des.
“Biso nyonso tolingaka bana na biso bázala na bomoi ya malamu mpe ya esengo. Mpo na yo, makambo nini bana bazali na yango mposa koleka mpo na kolonga mitungisi ya bomoi ya lelo? [Tiká ye apesa eyano. Nsima tángá Masese 22:6.] Lamuká! oyo ezali kolobela makambo oyo bana bazalaka na yango mposa mpe ndenge oyo baboti bakoki kokokisa makambo yango.”
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Yan.
“Mposa ya bato mingi ezalaka ete mabelé ekóma na kimya. Okanisi ete mokolo mosusu maloba oyo ekokokisama? [Tángá Nzembo 46:9. Nsima, tiká ye apesa eyano.] Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo elobeli ndenge maloba yango ekokokisama mpe ntina oyo tokoki kotya motema na elaka oyo Nzambe apesi ya kosilisa bitumba na mokili.”
Lamuká! 8 Yan.
“Na mokili mobimba bato bazali konyokwama na bamaladi ya makanisi. Mozalisi na biso amibanzabanzaka mpenza mpo na bato ya ndenge wana. [Tángá Nzembo 34:18.] Zulunalo oyo ezali komonisa ndenge oyo tokoki kosalisa bato yango. Ezali mpe kolobela elaka oyo ezali na Biblia oyo elobi ete etikali moke maladi ekozala lisusu te.”