“Tósala epai ya bato nyonso oyo ezali malamu”
1 “Tósakola liloba ya Nzambe malamumalamu” mpe “Tózala bazwi na misala ya malamu” ezalaki mitó ya masolo oyo tosalelaki na basiplema ya Mosala na biso ya Bokonzi ya sanza ya Febwali mpe ya Marsi 2002. (Kols. 1:25, NW; 1 Tim. 6:18, NW) Masolo yango elendisaki biso tósala milende mingi mpo na kosalisa bato oyo basepelaka koyoka nsango malamu mpo báya na Ekaniseli. Masolo yango elendisaki mpe biso tósalisa baoyo batiká kosakola mpo bázongela lisusu misala ya lisangá mpe tósalisa bana na biso mpe bayekoli ya Biblia oyo bakokisi makambo oyo esɛngami mpo bábanda kosakola nsango malamu. Na ntembe te, tosili kozwa mwa mbuma malamu mpo na milende oyo tosali. Sikoyo, ‘wana tozali na ntango oyo ebongi mpo na yango, tiká [tólanda] kosala epai ya bato nyonso oyo ezali malamu.’—Gal. 6:10, NW.
2 Tóbenga bango báyangana lisusu: Na teritware oyo filiale na biso ezali kotambwisa mosala ya kosakola, bato koleka 450 000, oyo bazali basakoli ya nsango malamu te, bayanganaka na Ekaniseli mbula na mbula. Lokola bayaka bongo, yango emonisi ete bazalaka na mwa mposa. Na bongo, nini tosengeli kosala mpo na kolendisa baoyo “bazali na ezaleli oyo ebongi mpo na bomoi ya seko” ete bákóma “bandimi”? (Mis. 13:48, NW) Tólendisa bango báyangana lisusu na makita ya lisangá, kozanga kozela.
3 Mpo na nini te kobengisa moto oyo amonisi mposa ayangana na Boyekoli ya mokanda mpo ayoka mateya kitoko oyo nsima ya ntango moke tokoyekola na buku Esakweli ya Yisaya? Soki moto yango azali ndeko na yo to soki oyebani na ye, ntango bapesi yo lisolo ya kosala na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi, okoki kobengisa ye mpo aya kolanda lisolo na yo. Yebisá ye mitó ya makambo ya masukulu ya bato nyonso oyo ekosalema na bapɔsɔ oyo ezali koya. (Programɛ esengeli kotyama na etanda ya mayebisi.) Luká libaku nyonso oyo emonani mpo na kolamwisa epai ya moto yango mposa ya kosambela Yehova. Mpe soki moto yango abandi naino te koyekola Biblia na ndeko mosusu na kati ya lisangá, okoki kosɛnga ye na boboto mpenza soki akolinga bóbanda koyekola.
4 Tólanda kolendisa baoyo batiká kosakola: Bato mosusu kati na baoyo bayanganaka na Ekaniseli basilaki komipesa epai na Yehova. Kasi, na ntango moko boye, batikaki kosakola nsango malamu. Atako bongo, Paulo alendisi biso ‘tósala oyo ezali malamu . . . mingimingi epai ya baoyo bazali bandeko na biso na kati ya kondima.’ (Gal. 6:10, NW) Na yango, baoyo batiká kosakola basengeli kozala bato ya liboso oyo tosengeli kosalisa bango.
5 Ekoki kozala ete basusu basili kondima ndenge bankulutu balendisaki bango mpe basusu basili kozongela lisusu kobima na mosala ya kosakola. Soki bankulutu basɛngi yo osalisa mosakoli oyo atikaki kosakola kasi azongeli lisusu, yebá ete eloko ekolendisa ye mingi mpenza ezali nde bolingo oyo yo moko ozali na yango mpo na Yehova mpe mpo na mosala ya kosakola. Monisá ye ndenge osakolaka ndako na ndako, okabolaka bazulunalo, opesaka litatoli ya libaku malamu, ozongelaka bato oyo bamonisaki mposa, otambwisaka boyekoli ya Biblia, mpe bongo na bongo; nyonso wana ekosala ete ye mpe asepela na mosala ya kosakola, akangama na mosala yango, mpo akoka komona mapamboli ya Yehova.
6 Tósalisa basakoli ya sika mpo bábanda malamu: Ntango mwasi moko oyo autaki koyamba nsango malamu amonaki ete azwi lisangá ya solo ya Nzambe, amonisaki mbala moko mposa ya kobanda kosakola. Ntango bayebisaki ye makambo oyo asengelaki kokokisa liboso ya kobanda kosakola, alobaki ete: “Nalingi kobanda kaka sikoyo.” Soki bankulutu bandimi ete moto moko oyo ozali koyekola na ye Biblia abanda kobima na mosala ya kosakola, salisá ye ayeba ntina ya “kobanda kaka sikoyo,” salisá mpe ye mpo abanda malamu. Salisá ye akolisa momeseno ya komibongisaka liboso ya kokende kosakola mpe ya kobimaka mbala na mbala mpe pɔsɔ na pɔsɔ na mosala yango.
7 Soki mwana na yo moko nde akómi mosakoli ya sika oyo azwi naino batisimo te, salisá ye mpo akola, na kotalela makoki na ye mpe mbula na ye. Soki osalisi ye kaka mwa moke, okoki kokamwa na komona ete akoyeba noki kobanda lisolo na moto, kotánga vɛrsɛ ya Biblia, mpe kolakisa mikanda. Soki asololi na moto oyo amonisi mposa, lakisá ye ndenge ya kosala bozongeli ya sika mpe kolandela mposa oyo moto amonisi.
8 Kolisá mosala na yo: Bomoi oyo ozali na yango sikoyo ezali kopesa yo nzela ya kobakisa ntango oyo olekisaka na mosala ya kopalanganisa nsango malamu, ezala ata na nsima ya eleko ya Ekaniseli? Okoki kobakisa ngonga moko to mibale pɔsɔ na pɔsɔ na ntango oyo olekisaka na mosala ya kosakola? Ozali kotala manaka mpo na koyeba sanza nini oyo okoki lisusu kozala mobongisi-nzela mosungi? To mpe okoki nde kobongisa bomoi na yo mpo okɔta na mosala ya ntango nyonso? Milende nyonso oyo tomonisaka na mosala ya kosakola ekoki kosalisa moto andima mateya ya solo! (Mis. 8:26-39) Wana tozali kotala mikolo oyo ezali koya, tiká ete ‘ntango nyonso tólanda oyo ezali malamu epai na biso na biso mpe epai ya bamosusu nyonso.’—1 Tes. 5:15, NW.
[Etanda na lokasa 3]
Tólanda kosalisa:
□✔ Baoyo bayanganaki na Ekaniseli
□✔ Basakoli oyo bazongeli kosakola
□✔ Basakoli ya sika oyo bazwi naino batisimo te