Ntina oyo tolingaka lisangá mobimba ya bandeko
Lokola na mokili ya lelo bolingo ezali te, ndenge nini tokoki kokoba kolinga bandeko na biso ya elimo mingi mpenza? (1 Pet. 2:17) Ndenge nini tokoki komonisa bato mosusu ete tozali mpenza libota ya solo ya bandeko na mokili mobimba? (Mat. 23:8) Ezali na nzela ya kasɛti video Communauté de nos frères (Lisangá ya bandeko). Kasɛti yango ezali komonisa ntina oyo tolinganaka. Talá soki okoki koyanola na mituna oyo:
(1) Tángá makambo misato oyo biso nyonso, libota ya bandeko na mokili mobimba, tosalaka. (2) Ndenge nini bandeko na biso bazali komonisa ekateli makasi oyo bazali na yango mpo na kosakola (a) na esobe ya Alaska, (b) na mabongo minene ya mikili ya Mpoto, mpe (c) na bazamba ya ekólo Pérou? (3) Esaleli nini ezali mpenza kobota mbuma malamu na mosala ya kosakola? (4) Mpo na nini tosengeli soki moke te kokanisa ete mosala ya kosakola ezali kaka lokola misala nyonso? (5) Pesá bandakisa oyo emonisi ndenge Batatoli ya Yehova babɔndisanaki mpe basalisanaki na bantango ya mpasi, lokola koningana ya mabele, mopɛpɛ makasi, mpe bitumba na kati ya bana-mboka. (Talá maloba ya Takao na lokasa 23 ya Lamuká! ya 22 Augusto 1995 [na Lifalanse] mpe maloba ya Kotoyo, na lokasa 20 ya Lamuká! ya 22 Ɔkɔtɔbɛ 1996 [na Lifalanse].) (6) Na makambo nini mpenza biso nyonso tokoki komonisa elembo monene oyo emonisaka polele libota na biso boklisto? (Yoa. 13:35) (7) Motuya nini tosengeli kopesaka na makita ya lisangá? (8) Bandeko oyo bazalaki na Ndako ya Bokonzi liboso te bayokaka ndenge nini ntango bazwi yango? (9) Ndenge nini bandeko na biso ya Mpoto ya Ɛsti mpe ya ekólo Russie babatelaki elimo na bango na ntango ya epekiseli? (10) Ata na moi ya lelo, milende nini ya kokamwa Batatoli mingi basalaka mpo na kokende na mayangani, mpe mpo na nini basalaka yango? Na ndenge nini likambo yango esimbi motema na yo? (11) Mpo na nini ozali na ekateli makasi ya kosambela Yehova na bomoko elongo na bandeko, ya kosalisa basusu na ntango oyo bakeleli, mpe ya kosakola na bosembo mpenza na esika nyonso mpe na lolenge nyonso ndenge makoki na yo epesi yo nzela? (12) Mpo na nini ekoki kozala malamu ozala na kasɛti video yango mpe olakisaka yango epai ya bato mingi mpenza oyo basepelaka na mateya na biso?