Ndenge ya kolakisa bazulunalo (Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 15 Mar.
“Okanisi ete mateya ya Yesu ekoki kosalisa bato ya ntango na biso? [Tiká ye apesa eyano.] Na ntembe te, okondima ete etinda oyo Yesu apesaki na mokolo ya nsuka ya bomoi na ye awa na mabelé ebongi mpenza. [Tángá Yoane 15:12.] Na mokolo yango, Yesu ateyaki mpe makambo mosusu ya ntina mingi. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo ezali komonisa ndenge oyo mateya yango ekoki kosalisa biso.”
Lamuká! 22 Mar.
“Omoni te ete lelo oyo bato mingi bazali kokoka te kolala mpɔngi malamu? [Tiká ye apesa eyano.] Ntango mosusu likambo yango eutaka na ebele ya mitungisi. [Tángá Mosakoli 5:12.] Zulunalo oyo etaleli mpe makambo mosusu oyo esalaka ete bato bákokaka kozwa mpɔngi te na butu. Lisusu, emonisi biso ndenge oyo tokoki kosala mpo tóbongisa mimeseno na biso ya kolala mpɔngi.”
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Apr.
“Awa, balakisi bolei oyo ebengamaka Limpati lya nsuka. [Lakisá elilingi oyo ezali na nkasa nyonso mibale ya ezipeli ya zulunalo.] Oyebaka ete yango nde ezali molulu kaka moko oyo baklisto basengeli kokumisaka? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima, tángá Luka 22:19.] Zulunalo oyo ezali kolimbola mpo na nini ekaniseli yango ezali na ntina mingi mpe ndenge oyo yango etaleli bomoi na yo.”
Lamuká! 8 Apr.
“Epesaka yo mawa te na komona ndenge bangi ezali kobebisa bomoi ya bilenge mingi? [Tiká ye apesa eyano.] Mikakatano ekómelaka bango, mingimingi na ntango bakómi kokangama na baninga ya mabe. [Tángá 1 Bakolinti 15:33.] Lamuká! oyo elobeli makambo oyo etindaka bilenge bábanda komɛla bangi mpe emonisi makambo oyo baboti na bango bakoki kosala mpo na kobatela bango.”