Ndenge ya kolakisa bazulunalo
(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛl 15 Mar.
“Na mokili mobimba, bato bakumisaka mateya ya Yesu. [Tángá maloba oyo ezali na lokasa 3, paragrafe 1.] Kasi, okanisi ete mateya yango, na ndakisa oyo balobeli na vɛrsɛ oyo, ezali na ntina lelo oyo? [Tángá Matai 5:21, 22a. Na nsima tiká ye apesa eyano.] Zulunalo oyo ezali kolobela mateya ya Yesu mpe ndenge oyo tokoki kozwa matomba na mateya yango.”
Lamuká! 22 Mar.
“Bato mingi balingaka bangomba mpo ezalaka kitoko, kasi oyebi ete bangomba ezali na ntina mingi mpo bomoi ezala awa na mabelé? [Tiká ye apesa eyano.] Zulunalo oyo ezali kolobela ntina oyo tozali na mposa ya bangomba mpe ndenge bato bazali kobebisa yango lelo oyo. Ezali mpe kolobela ndenge Mozalisi akosala ete bato bábebisaka lisusu te biloko wana ya ntina mingi.” Tángá Nzembo 95:4.
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛlii 1 Apr.
“Oyoká naino te bato bazali koloba ete makambo ya siansi ekeseni na oyo ya Biblia? [Tiká ye apesa eyano.] Zulunalo oyo ezali komonisa ndenge oyo banda kala makambo ya siansi eyokanaka te na makambo ya mangomba. Kasi, ezali mpe kopesa bilembeteli oyo emonisi ete makambo ya siansi ya solosolo ekeseni te na makambo ya Biblia.” Lakisá ye nkasa 6-7. Na nsima, tángá Mosakoli 1:7.
Lamuká! 8 Apr.
“Okanisi ete baboti bakoki kosala nini mpo na kosalisa bana na bango bákima mikakatano oyo ekómelaka bilenge? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima tángá Yisaya 48:17, 18.] Zulunalo oyo ezali komonisa ete kosalela toli ya Biblia ekoki kosalisa baboti básololaka malamu elongo na bana na bango mpe bátyelaka bango bandelo oyo ebongi.”