Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 4/03 lok. 3
  • Tóyangana elongo mpo na kosanzola Yehova

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tóyangana elongo mpo na kosanzola Yehova
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2003
  • Masolo mosusu
  • Sanzolá Yehova na kati ya koyangana monene
    Mosala na biso ya Bokonzi—2005
  • “Liloba ya esakweli ya Nzambe”​—Liyangani ya etúká mpo na 1999
    Mosala na biso ya Bokonzi—1999
  • Libaku ya kolya na elimo mpe kosepela
    Mosala na biso ya Bokonzi—2008
  • “Tókumisa nkombo na ye elongo”
    Mosala na biso ya Bokonzi—2004
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2003
km 4/03 lok. 3

Tóyangana elongo mpo na kosanzola Yehova

1. Motó ya likambo ya liyangani ya mbula oyo ezali nini, mpe mpo na nini Yehova abongi mpo na kozwa masanzoli na biso?

1 Yehova azali Mozwi-Na-Nguya-Nyonso, bwanya na ye ezali na nsuka te, boyengebene na ye ezali ya kokoka, mpe azali mpenza bolingo. Lokola azali Mozalisi, Mopesi-bomoi, mpe Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba, ebongi tósambela bobele ye moko. (Nz. 36:9; Emon. 4:11; 15:3, 4) Liyangani ya etúká ya mbula oyo “Pesá Nzambe nkembo” ekolendisa ekateli na biso ya kosanzola ye lokola Nzambe kaka moko ya solo.​—Nz. 86:8-10.

2, 3. Ndenge nini kobongisa makambo malamumalamu liboso ekosalisa biso tozwa matomba mingi?

2 Esengeli kobongisa makambo malamumalamu liboso: Mpo na kozwa matomba mingi na elambo ya elimo oyo Yehova abongiseli biso, tosengeli kobongisa makambo malamumalamu liboso. (Ef. 5:15, 16) Osí ozwi bibongiseli mpo na esika okolala, mpo na tike na yo, mpe osí osɛngi konje na mosala to na eteyelo? Kozela te obanda kobongisa makambo wana ya ntina ntango liyangani elingi ebanda. Soki osɛngi konje liboso te, ntango mosusu okozanga ndambo ya programɛ ya liyangani. Nsima ya kosala milende mingi bongo mpo na koyangana na liyangani ya etúká, tokolinga ata moke te kotikela eloko moko nzela epekisa biso tózwa matomba na programɛ mobimba ya mateya. Makambo mibale ekoki kolongola likebi na biso mpe kosala ete tólanda programɛ te ndenge esengeli. Ya liboso, ntango mosusu bato bafandaka libandá na moi; mpe likambo mosusu ezali ete mbula ekoki kobɛta na mbalakaka. Mpo na yango, tosɛngi na mabota bázala na mangembu (parasol), oyo ekosalisa bango bálanda liyangani ata soki moi ezali makasi to mbula ebɛti. Biso nyonso tosengeli koyangana mikolo nyonso misato ya liyangani.

3 Mikolo nyonso ya liyangani, omityela mokano ya kokóma liboso mpenza. Yango ekosalisa yo ofanda malamu naino loyembo ya liboso ebandi te mpe obongisa makanisi na yo mpo na kolanda mateya oyo ekopesama. Mikolo nyonso misato, esika ya liyangani ekofungwama na ngonga ya 8:00 na ntɔngɔ. Tosɛngi na bino bókangisa bisika ya kofanda kaka mpo na bato ya libota na bino ná bato oyo bokoya na bango na liyangani.

4. Mpo na nini biso nyonso tosengeli komema biloko na biso ya kolya na liyangani?

4 Tosɛngi na bandeko nyonso bámema biloko ya kolya na liyangani na esika bábima mpo na kokende kosomba yango na ntango ya bopemi. Soki ozali kolanda ebongiseli yango, kimya ekozala mpe okozala na ntango mingi ya kosolola na bandeko. (Nz. 133:1-3) Kobosana te ete epekisami komema milangi to bavɛrɛ mpe masanga ya makasi na esika ya liyangani.

5. Ndenge nini tokoki kobanda kobongisa mitema na biso mpo na liyangani?

5 Yoká mpe yekolá: Ezela abondelaki mingi mpo na kobongisa motema na ye mpo endima liloba ya Nzambe. (Ezl. 7:10) Atyaki motema na ye na mateya ya Yehova. (Mas. 2:2) Tokoki kobanda kobongisa mitema na biso mpo na liyangani liboso kutu tóbima na ndako soki tozali komanyola likoló ya motó ya likambo ya liyangani mpe kolobela makanisi na yango na libota na biso.

6. Nini ekoki kosalisa biso tólongola likebi na biso te na programɛ nyonso ya liyangani? (talá etanda.)

6 Esika bato basangani ebele, makɛlɛlɛ mpe makambo ya kotala ezangaka te oyo ekoki kolongola likebi ya moto. Makambo ya ndenge wana ekoki kosala ete tólongola likebi na biso epai ya molobi. Yango ekoki kosala ete tózanga mateya ya ntina. Makanisi oyo ezali na etanda ya lisolo oyo ekosalisa biso tótya likebi koleka.

7, 8. Ndenge nini tokoki kopesa bato mosusu lokumu?

7 Pesá basusu lokumu: Okoki kosalela bamasini ya kokanga fɔtɔ mpe bakamera na ntango programɛ ezali koleka, kasi mpo na kolongola likebi ya bato mosusu te, salelá yango na esika oyo ofandi. Batelefone ya mabɔkɔ esengeli te kotungisa bato mosusu. Esengeli te kotya masini na yo moko na nsinga ya kura ya liyangani to na masini ya kokolisa lolaka ya liyangani.

8 Tozali mpenza kozela na motema likoló mikolo oyo tokoyangana elongo mpo na kokumisa Yehova! Tiká ete tózala na ekateli ya koyangana mikolo nyonso misato, ya koyoka na likebi nyonso, mpe ya kosalela oyo toyekoli mpo na nkembo ya Yehova.​—Det. 31:12.

[Etanda na lokasa 3]

Mpo na kolanda malamu liyangani

▪ Manyolá likólo ya mitó ya makambo ya masukulu

▪ Luká bavɛrsɛ oyo epesami

▪ Komáká mwa makanisi ya ntina

▪ Kangá makanisi oyo okosalela na bomoi na yo

▪ Zongelá makambo oyo oyekoli

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto