Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 4/04 lok. 3
  • “Tókumisa nkombo na ye elongo”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Tókumisa nkombo na ye elongo”
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2004
  • Masolo mosusu
  • Sanzolá Yehova na kati ya koyangana monene
    Mosala na biso ya Bokonzi—2005
  • Libaku ya kolya na elimo mpe kosepela
    Mosala na biso ya Bokonzi—2008
  • Tóyangana elongo mpo na kosanzola Yehova
    Mosala na biso ya Bokonzi—2003
  • Osili komibongisa mpo na fɛti ya elimo?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2009
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2004
km 4/04 lok. 3

“Tókumisa nkombo na ye elongo”

1. Libaku nini tokozwa ya kokumisa nkombo ya Nzambe elongo, mpe tokoki kosala nini sikoyo mpo na komibongisa?

1 Mokomi ya nzembo ayembaki boye: “Kembisá [Yehova] esika moko na ngai; tókumisa nkombo na ye elongo.” (Nz. 34:⁠3) Liyangani na biso ya etúká “Tambolá elongo na Nzambe” oyo tozali kozela, ekopesa biso libaku ya kokumisa nkombo ya Yehova elongo na bandeko na biso basi mpe mibali oyo bakouta na masangá mingi. Osili kozwa bibongiseli mpo na esika okolala, transport na yo, mpe mpo na kosɛnga konje na mosala? Ekozala likambo ya mayele ete tósala makambo yango liboso mpenza.​—⁠Mas. 21:⁠5.

2. Mpo na nini ezali na ntina tózwa bibongiseli mpo na kokóma na esika ya liyangani na ngonga ya malamu?

2 Na esika ya liyangani: Ezali na makambo mingi oyo tosengeli kotalela liboso ya kokende na liyangani. Kolongwa na ndako na ngonga ya malamu mpenza ekosalisa biso tózala na ntango mpo na makambo mosusu oyo eyaka mbalakaka oyo ekoki kosala ete tókóma na ngonga malamu te na liyangani. Lisusu, ekopesa biso nzela tózwa bisika ya kofanda na ngonga oyo esengeli mpo ete, na motema mobimba, tóyemba loyembo ya ebandeli mpe tóyoka libondeli. (Nz. 69:30) Mwa miniti moke liboso programɛ ebanda, miziki ya Bokonzi ekobɛta wana prezida ya eteni ya ebandeli akofanda na estrade. Na ntango wana, esengeli ete biso nyonso tófanda na bisika na biso mpo programɛ ebanda na molɔngɔ.​—⁠1 Kol. 14:​33, 40.

3. Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali komibanzabanza mpo na basusu ntango tozali koluka bisika ya kofanda?

3 Liloba ya Nzambe elendisi biso ete ‘tótika makambo na biso nyonso esalema na bolingo.’ (1 Kol. 16:14) Ntango bakofungola baporte na ngonga ya 8:​00, soki tozali komibanzabanza mpo na basusu, tokowela te to tokotindika bango te mpo na koluka kofanda na bisika oyo tolingaka mingi. Tokoki kokanga bisika ya kofanda kaka mpo na baoyo toyei na bango motuka moko to baoyo tofandaka na bango ndako moko.​—⁠1 Kol. 13:5; Filp. 2:⁠4.

4. Bibongiseli nini tosengeli kozwa mpo na biloko ya kolya na midi, mpe litomba nini tokozwa soki tosali bongo?

4 Tosɛngi bino bómema biloko oyo bokolya na bopemi ya midi, na esika ya kokende koluka yango libándá. Yango ekopesa biso nyonso nzela ya kozala elongo na bandeko mpe kolendisana; lisusu, ekopesa biso likoki ya kozala wana ntango kaka programɛ ya nsima ya midi ekobanda. Soki likoki ezali, bokoki kosalela mwa kitunga to glassière ya moke oyo bokokoka kotya na nse ya kiti oyo bofandi. Esengeli te komema na esika ya liyangani kitunga to glassière ya monene, milangi mpe masanga ya makasi.

5. Ebongiseli nini ezwami mpo na mibange mpe baoyo bazali bibɔsɔnɔ?

5 Bakobongisa esika moko mpo na bandeko oyo bakómi mibange mpe baoyo bazali bibɔsɔnɔ. Yango ekosalisa bango báfanda malamu mpe ekobatela bango na mbula mpe moi, soki likoki ezali. Bakopesa liyebisi oyo etali ebongiseli yango liboso ete eteni ya liboso ya liyangani ebanda.

6. Ndenge nini tokoki kobongisa motema na biso mpo na mateya oyo tokozwa?

6 Elambo ya elimo ezali kozela biso: Mokonzi Yosafata azalaki moto oyo “abongisaki motema na [ye] mpo na koluka Nzambe ya solo.” (2 Nt. 19:​3, NW) Ndenge nini tokoki kobongisa motema na biso liboso ya liyangani? Lisolo oyo ezali na ezipeli ya nsima ya Lamuká! ya 22 Mai mpe ya 8 Yuni (ebimeli ya Lifalanse) elobeli na mokuse bilei oyo tokolya na elambo yango ya elimo. Mpo na nini te kotalela masolo yango malamu mpo epesa yo mposa makasi ya bilei ya elimo oyo Yehova abombeli biso? Kobongisa motema na biso elimboli mpe kosɛnga Yehova asalisa biso tókanga ntina ya mateya oyo tokozwa mpe tósalela yango.​—⁠Nz. 25:​4, 5.

7. Mposa na biso ezali nini, mpe mpo na nini?

7 Biso nyonso tozali na mposa makasi ya kobakisa boyebi na biso ya Liloba ya Nzambe, mpamba te toyebi ete na nzela na yango nde tokoki kokola tii na lobiko. (1 Pet. 2:⁠2) Na bongo, tiká tózala wana na liyangani na biso ya etúká “Tambolá elongo na Nzambe,” mpe ‘tókumisa nkombo ya Yehova elongo.’​—⁠Nz. 34:⁠3.

[Etanda na lokasa 3]

Ndenge ya kokumisa nkombo ya Nzambe

◼ Omibongisa liboso

◼ Monisá ete olingaka basusu

◼ Bongisá motema na yo

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto