Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 6/03 lok. 5
  • Kozwa epaso na mosala​—Libaku ya kosala mingi?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kozwa epaso na mosala​—Libaku ya kosala mingi?
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2003
  • Masolo mosusu
  • Kozwa epasó: Libaku malamu mpo na mosala ya Teokrasi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Okoki kokɔta na “ekuke monene oyo ezali komema na mosala”?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2007
  • “Okoki kozala mobongisi-nzela ya malamu!”
    Mosala na biso ya Bokonzi—2010
  • Sikoyo nde ntango ya kosakola!
    Mosala na biso ya Bokonzi—2005
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2003
km 6/03 lok. 5

Kozwa epaso na mosala​—Libaku ya kosala mingi?

1 Bato mingi oyo basalaka mosala makasi bazelaka na motema likólo mokolo oyo epaso ekolongola bango na mpasi mpe mitungisi ya mosala. Nzokande mbala mingi, bato oyo bazwaka epaso basilaka esengo, bakómaka kobaye makambo nyonso, mpe banunaka noki. Kozanga mosala moko ya ntina ekoki kosala ete moto amitungisa mingi na makanisi mpo na bomoi na ye moko. Epai mosusu, baboti mosusu oyo bakómi mikóló babatelaka bankɔkɔ na bango mpe bana mosusu ntango baboti ya bana yango bamipesaka na koluka mbongo. Nzokande, yango mpe esilisaka mitungisi ya bomoi te.

2 Nzokande, baklisto mingi bamonaka bomoi na bango wana ya sika lokola libaku ya komipesa mingi na makambo ya elimo. Soki bana na bango oyo bakómi mikóló bandimi kokokisa bamposa na bango, boye bazali na likoki ya kosala mingi. Ndeko mobali moko oyo abandaki mosala ya mobongisi-nzela pɔsɔ mibale nsima ya kokóma na mbula 65 alobaki boye: “Naino nalekisá te bomoi kitoko oyo etondi na mapamboli lokola oyo nalekisi na mbula zomi oyo nasali mosala ya mobongisi-nzela.” Mobali moko ná mwasi na ye bakomaki boye: “Bambula na biso ya kitoko koleka ebandaki ntango tobandaki mosala ya mobongisi-nzela.” Ɛɛ, mpo na bato mingi, epaso ezalaka libaku ya malamu koleka ya kosala mingi na mosala ya kosakola, mpe ya kozwa mapamboli mingi ya Yehova.

3 Zalá na mosala mingi mpe kobá kobota mbuma: Bato mingi oyo lelo bazwá epaso, ntango bazalaki kokola, biloko mingi ya malamu oyo ezali lelo ezalaki te mpe bamesanaki kosala mosala makasi banda bomwana na bango. Atako bazali lisusu na makasi oyo bazalaki na yango na bomwana te, bazali kaka basali oyo basalaka mosala malamu. Na teritware ya filiale moko, babongisi-nzela oyo bazali na mbula 60 to koleka bazali soki 20 000, bandeko basi mpe bandeko mibali, elingi koloba 22 % ya babongisi-nzela nyonso ya teritware yango. Bandeko yango oyo bakómi mikóló bazali kosala mingi na mosala ya kosakola. Lokola bayebi makambo mingi mpe bazali na bizaleli malamu ya boklisto, bazali mpenza lipamboli monene mpo na masangá epai bazali.​—YaK. 3:17, 18.

4 Kosala mingi na mosala ya kosakola esalisaka moto azala nzoto kolɔngɔnɔ mpe ebongisaka bomoi na ye. Ndeko mwasi moko oyo azali na mbula 84, oyo abandaki mosala ya mobongisi-nzela ntango azwaki epaso na mosala alobaki boye: “Lokola nazalaki kotambwisa boyekoli ya Biblia na bato mingi oyo basepelaki na solo, yango esalisaki ngai nabatela mayele na ngai. Nazali na motuka te, yango wana natambolaka mingi na makolo. Yango esalisaka ngai nazala nzoto makasi.” Mobali moko na mwasi na ye oyo bakómi mibange balobi boye: “Mosala ya kosakola esalisaka biso tózala nzoto mpe makanisi kolɔngɔnɔ. Tozalaka ntango nyonso esika moko. Tosɛkaka mingi mpe tosepelaka na bomoi.”

5 Kosala esika mposa ezali: Baklisto mosusu oyo bazwá epaso, oyo bazali na mwa makoki ya kobikela, batikaki bisika bazalaki kofanda mpo na kokende kosala epai mposa ya basakoli ya bokonzi ezali makasi. Basusu bakómi kosakola mingi epai ya bato oyo balobaka monɔkɔ moko ya bapaya. Lokola ntoma Paulo, basakoli yango ya molende bazali “kosala makambo nyonso mpo na nsango malamu, mpo [bákóma basangani] na yango elongo na bamosusu.”​—1 Kol. 9:23.

6 Mobali moko ná mwasi na ye babandaki mosala ya mobongisi-nzela nsima ya kokolisa bana na bango mibale. Nsima ya kosala bambula mingi na mosala ya mobongisi-nzela, babandaki koyekola monɔkɔ ya ba chinois. Bazali sikoyo bango nyonso mibale na mbula koleka 70. Eleki mikolo mingi te, bazalaki na esengo ya komona etuluku moke ya monɔkɔ ya chinois oyo basalaki elongo na yango kokóma lisangá. Mobali ná mwasi yango bazalaki mpenza lipamboli monene!

7 Epaso ezalaka te na mosala ya kosakola: Atako bato mingi bazwaka epaso na nsuka ya mosala na bango, moklisto ata moko te azwaka epaso na mosala ya Nzambe. Baklisto nyonso basengeli kolanda kozala sembo “tii na nsuka.” (Mat. 24:13, 14) Na teritware na biso babongisi-nzela koleka 700 bazali na mbula koleka 60, yango ezali komonisa ete basepelaka mingi na mosala ya kosakola. Ya solo, bamosusu oyo bapusani na mbula, bazali lisusu na makasi te ya kosala mingi ndenge bazalaki kosala liboso na mosala ya Yehova. Kasi, ezali mpenza likambo ya kolendisa komona bango kosala oyo bakoki na motema na bango mobimba! Liloba ya Nzambe endimisi bango ete Yehova akobosana te mosala na bango mpe bolingo oyo bazali komonisa mpo na nkombo na ye.​—Luka 21:1-4; Ebe. 6:10.

8 Soki ozali pene ya kozwa epaso, mpo na nini te kobondela na ntina na yango mpe kotala soki okokoka kosalela malamu mbongwana wana oyo ekokɔta na bomoi na yo? Na lisalisi ya Nzambe, okomona ete epaso ekopesa yo libaku ya kosala mingi, ya kokumisa Yehova mpe ekomemela yo mapamboli mingi.​—Nz. 148:12, 13.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto