Okoki kokɔta na “ekuke monene oyo ezali komema na mosala”?
1. Wapi “ekuke monene oyo ezali komema na mosala,” oyo efungwami mpo na biso?
1 Ntango “ekuke monene oyo ezali komema na mosala” efungwamaki mpo na ntoma Paulo, amipesaki mobimba na mosala ya kosakola, atako azalaki na batɛmɛli mingi. (1 Kol. 16:9) Lelo oyo na mokili mobimba, basakoli ya Bokonzi 642 000 bakɔti na ekuke monene oyo ezali komema na mosala, na ndenge bakómi babongisi-nzela ya sanza na sanza.
2. Mpo na nini ezali malamu tómitalelaka mbala na mbala?
2 Makambo ebongwanaka: Atako sikoyo bomoi na biso ekoki kopesa biso nzela te ya kosakola mingi, kasi makambo ekoki kobongwana. Yango wana, ezali malamu tómitalelaka mbala na mbala, mpe tózela kaka te ete makambo nyonso ekóma malamu mpo tóbanda mosala yango. (Mos. 11:4) Ozali elenge mpe etikali moke osilisa kelasi? Ozali na bana oyo etikali moke bákɔta kelasi? Etikali moke ozwa epaso na mosala? Soki bongo, etikali moke okóma na ntango mingi mpe yango ekoki kopesa yo nzela ya kokóma mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Ndeko mwasi moko oyo azalaki liboso kotungisama na mikakatano ya nzoto amityelaki mokano ya kokóma mobongisi-nzela ya sanza na sanza ntango akómaki na mbula 89. Mpo na nini? Mpamba te, lokola alekisaki mbula mobimba kozanga ete akɔta lopitalo, amonaki ete nzoto na ye ekómaki mwa makasi mpe akokaki kokóma mobongisi-nzela.
3. Ndenge nini basusu babongoli makambo na bomoi na bango mpo bákóma babongisi-nzela ya sanza na sanza?
3 Paulo azalaki liboso na mposa ya kokende kotala bandeko na ye na Kolinti. Kasi, abongolaki makambo oyo akanaki kosala mpo na kosakola nsango malamu. Bandeko mingi oyo bazali lelo babongisi-nzela, babongolaki makambo mingi na bomoi na bango mpo bákóma babongisi-nzela. Bamosusu bakómisi bomoi na bango pɛpɛlɛ mpe baluki mosala oyo esɛngaka kosala kaka ndambo ya mokolo mpo bázwa mwa mbongo ya kobikela. Bazali kosepela na libaku oyo bazwi ya kosala mosala yango. (1 Tim. 6:6-8) Babalani mosusu babongoli makambo mosusu na libota na bango mpo mobali kaka nde asalaka, mpe yango epesi mwasi nzela ya kokóma mobongisi-nzela.
4. Tokoki kosala nini soki tomoni ete tokokoka te kokokisa ngonga oyo esɛngami?
4 Kokata mbala moko te ete okokoka te kozala mobongisi-nzela mpo okanisi ete okokokisa te ngonga oyo esɛngami. Ezali kosɛnga kosakola kaka ngonga mibale na ndambo na mokolo. Soki omoni ete okokoka kokokisa yango te, meká kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi sanza moko to mibale, mpe mityelá mokano ya kosala ngonga 70 na sanza mokomoko. Yango ekosalisa yo oyoka mwa moke esengo ya kosala mosala ya mobongisi-nzela. (Nz. 34:8) Sololá na bandeko oyo bazali sikoyo babongisi-nzela. Ntango mosusu bango mpe bakutanaki na mikakatano oyo ozali na yango. (Mas. 15:22) Sɛngá Yehova apambola milende oyo ozali kosala mpo na kosakola mingi.—1 Yoa. 5:14.
5. Mpo na nini mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza ezali na ntina?
5 Mosala ya ntina: Mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza epesaka mapamboli mingi. Ekopesa yo esengo mingi, mpo ozali kopesa mingi. (Mis. 20:35) Mosala yango ekosalisa yo oyeba kosembola Liloba ya solo ya Nzambe malamumalamu. (2 Tim. 2:15) Ekosalisa yo ozwa mabaku mingi ya komona lobɔkɔ ya Yehova na bomoi na yo. (Mis. 11:21; Filp. 4:11-13) Lisusu, mosala ya mobongisi-nzela ekosalisa yo okóma na bizaleli mingi ya elimo, lokola koyika mpiko, mpe ekosalisa yo opusana penepene na Yehova. (Yak. 4:8) Okoki kokɔta na ekuke monene wana oyo ezali komema na mosala mpe kokóma mobongisi-nzela ya sanza na sanza?