Tókende kotala bango nokinoki
Banani? Bato oyo basɛngaka mikanda, baoyo basɛngaka báyaka kotikela bango bazulunalo, to baoyo balingaka ete Motatoli moko akende kotala bango na ndako. Banani oyo basɛngaka bongo? Bato oyo bakomelaka Betele mikanda to babengaka Betele na telefone to bakomelaka Betele na nzela ya Internet. Ntango moto moko amonisi mposa ndenge wana, Betele eyebisaka yango na lisangá oyo ezali pene na esika oyo ye afandi; mpo na yango, Betele esalelaka formilɛrɛ S-70, “Veuillez à ce qu’un proclamateur expérimenté rende visite à cette personne.” Soki bankulutu bazwi formilɛrɛ yango, basengeli mbala moko kopesa yango na mosakoli moko mpe mosakoli yango akosala makasi akende kosalisa moto yango. Soki mosakoli yango azali kokuta moto yango na ndako te, akoki komeka kobenga ye na telefone to kotikela ye mwa nkoma na ndenge oyo ekobenda likebi ya bato te. Soki basɛngi yo okende kotala moto moko ya ndenge wana, salá nyonso mpo okutana na ye nokinoki.