Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 11/11 lok. 2
  • Biyano na mituna na bino

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biyano na mituna na bino
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2011
  • Masolo mosusu
  • Salá yango kozanga koumela
    Mosala na biso ya Bokonzi—2014
  • Tókende kotala bango nokinoki
    Mosala na biso ya Bokonzi—2003
  • Biyano na mituna na bino
    Mosala na biso ya Bokonzi—2015
  • Nini esalemaka na biro ya filiale?
    Banani bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo?
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2011
km 11/11 lok. 2

Biyano na mituna na bino

◼ Nani asengeli kotondisa mwa eteni ya lokasa oyo ezalaka na nsuka ya bazulunalo na biso to kosɛnga boyekoli ya Biblia na nzela ya Internet?

Mbala mingi, lokasa ya nsuka ya bazulunalo na biso ezalaka na mwa eteni oyo moto akoki kotondisa mpe kotinda yango na biro ya filiale mpo na kosɛnga mikanda to kosɛnga ete Batatoli ya Yehova báya kotala ye. Longola yango, moto akoki mpe kosɛnga boyekoli ya Biblia na nzela ya Internet na site na biso www.pr2711.com. Bibongiseli wana ezali kosalisa bato mingi báyeba solo. Nzokande, mikakatano ebimaki ntango basakoli mosusu basalelaki bibongiseli wana mpo na koluka ete bandeko na bango to baninga na bango bázwa mikanda to mpo Motatoli moko akende kotala bango.

Bato mosusu oyo biro ya filiale etindelaki bango mikanda kozanga ete básɛnga yango, basepelaki te mpe bakanisaki ete tozali kotungisa bango mpe totye bango na liste ya bato oyo basengeli kozwaka mikanda na biso. Basakoli mosusu bazwaki mokumba ya kokende kotala moto moko; nzokande, moto yango asɛngaki te ete báya kotala ye. Basakoli yango bakómaki na mokakatano mpamba te moto yango asilikelaki bango. Yango wana, esengeli ete bato oyo basepeli na nsango malamu básɛnga bango moko boyekoli na nzela ya Internet to bátondisa bango moko mwa eteni ya lokasa oyo ezalaka na nsuka ya bazulunalo na biso. Ezali malamu te basakoli bátondisela bango yango to básɛngela bango boyekoli. Soki biro ya filiale eyebi ete mosakoli moko nde asɛngi boyekoli mpo na moto mosusu, ekondima yango te.

Kasi ndenge nini tokoki kosalisa ndeko na biso to moninga na biso ayeba Yehova? Soki olingi ete azwa mikanda, okoki kotindela ye yango yo moko. Soki asepeli na nsango malamu mpe alingi ete Batatoli bákende kotala ye, kasi yo ozali na likoki te ya kokutana na bankulutu ya lisangá oyo ezali pembeni na ye, osengeli kotondisa formilɛrɛ Veuillez suivre l’intérêt (S-43) mpe kopesa yango epai ya sɛkrɛtɛrɛ ya lisangá na bino, mpe ye akotinda yango na biro ya filiale. Nzokande, soki moto yango azali na bolɔkɔ to na lopitalo, osengeli te kokomela biro ya filiale mpo na kosɛnga ete bandeko bákende kotala ye. Ebongi nde kolendisa ye akutana na Batatoli oyo bakendaka kosakola kuna to akomela ye moko biro ya filiale mpo na kosɛnga mikanda to boyekoli.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto