Salá yango kozanga koumela
Kobanda site Internet na biso ebongisamaki na ndenge ya sika, bato oyo bazali kosɛnga boyekoli ya Biblia na nzela ya Internet bakómi mingi mpenza. Lolenge ya sika ya kopesa litatoli ezali mpe kosala ete bato mosusu básɛnga boyekoli ya Biblia. Soki moto asɛngi boyekoli ndenge wana, biro ya filiale etalelaka likambo yango nokinoki. Na ndakisa, soki moto asɛngi boyekoli ya Biblia na site jw.org, mbala mingi biro ya filiale eyebisaka bankulutu ya teritware oyo moto yango afandi nsima ya mikolo mibale mpamba. Nzokande, balapolo oyo euti na masangá emonisi ete bapɔsɔ mingi elekaki kozanga ete basakoli bákende kotala bato mosusu oyo basɛngaki boyekoli ya Biblia. Tosengeli kosala nini mpo na koyeba soki moto yango azwi lisalisi liboso ete mposa oyo amonisaki esila?—Mrk. 4:14, 15.
Soki moto moko oyo afandi na teritware na bino te asepeli na nsango malamu, tondisá mbala moko formilɛrɛ Veuillez suivre l’intérêt (S-43) mpe pesá yango na sɛkrɛtɛrɛ ya lisangá na bino na makita oyo ekolanda. Nsima ya mokolo moko to mikolo mibale, sɛkrɛtɛrɛ asengeli kotinda yango na lisangá oyo esengeli to na biro ya filiale na nzela ya site jw.org. Bankulutu basengeli kotalaka site yango mbala na mbala. Soki bazwi mesaje mpo na kokende kotala moto moko, basengeli koluka nokinoki kokutana na moto yango. Mosakoli nyonso oyo basɛngi ye akende kotala moto yango, asengeli kosala yango liboso ya makambo mosusu nyonso. Soki okuti moto yango na ndako te, ntango mosusu okoki kotikela ye nimero na yo ya telefone, adrɛsi na yo ya ndako to ya e-mail.