Ndenge ya kolakisa bazulunalo
(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛl 15 Nov.
“Bato mingi balingaka kozala nzoto kolɔngɔnɔ mpe na bomoi ya molai. Kasi, soki yango ekokaki kosalema, olingaki mpenza kosepela kozala na bomoi libela na libela? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima tángá Yoane 17:3.] Zulunalo oyo ezali kolobela elaka ya bomoi ya seko oyo Biblia epesi. Ezali mpe komonisa ndenge bomoi ekozala ntango elaka yango ekokokisama.”
Lamuká! 22 Nov.
“Na mbula 20 oyo euti koleka, bato basali milende mpenza mpo na koyekola maladi ya sida mpe koluka nkisi ya kosilisa yango. Kasi, ezali na bato mingi oyo bayebi naino maladi yango malamu te. [Lakisá ye etanda “Makanisi oyo bato bazalaka na yango mpo na sida,” mpe tiká ye alobela yango.] Zulunalo oyo ezali kolobela ndenge baboti bakoki kobatela bana na bango.” Tángá Deteronome 6:6-7.
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛlii 1 Des.
“Moko ya makambo oyo ekesenisaka bato ná banyama ezali ete bato bayebaka kokesenisa malamu ná mabe. Na mawa nyonso, bato mingi basalaka nde makambo ya mabe. Na makanisi na yo, mpo na nini basalaka bongo? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima tángá Yilimia 17:9 to Emoniseli 12:9.] Zulunalo oyo elobeli makambo oyo ekoki kosalisa biso tóyeba mpe tósala makambo ya malamu.”
Lamuká! 8 Des.
“Bamasini oyo ezali kobima sika ebongoli te mposa oyo moto azalaka na yango ya kozala na baninga. Kasi, omoni te ete bomoi ya bato ndenge ezali kobongwana ekoki kosala ete ekóma mpasi lelo oyo kozwa baninga ya motema? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima tángá Masese 18:24.] Zulunalo oyo elobeli ndenge tokoki kozwa baninga ya malamu mpe kobatela boninga na bango.”