Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 4/09 nk. 4-7
  • Osili komibongisa mpo na fɛti ya elimo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Osili komibongisa mpo na fɛti ya elimo?
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2009
  • Masolo mosusu
  • Libaku ya kolya na elimo mpe kosepela
    Mosala na biso ya Bokonzi—2008
  • Mikolo misato oyo tokolendisama na elimo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2011
  • Tólanda Klisto mpe tómonisa lokumu
    Mosala na biso ya Bokonzi—2007
  • Mayangani na biso ya etúká epesaka litatoli monene mpo na solo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2012
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2009
km 4/09 nk. 4-7

Osili komibongisa mpo na fɛti ya elimo?

1. Kobongisa fɛti esɛngaka makambo nini?

1 Fɛti esɛngaka kobongisa makambo mingi. Esɛngaka kosomba bilei, kolamba yango malamu mpe kopesa bato. Esɛngaka mpe kobongisa ndenge ya kopesa bato bilei. Lisusu, esɛngaka mpe kobongisa esika oyo bato bakolya bilei yango. Bato oyo babengisami basengeli mpe komibongisa, mingi mpenza soki ekosɛnga ete bákende mosika mpo na kokóma na fɛti yango. Atako esɛngaka mosala mingi, kolya bilei kitoko elongo na baninga mpe bandeko ya libota esalaka ete fɛti ezala likambo ya esengo. Etikali moke, Batatoli ya Yehova na mokili mobimba bakoyangana na mayangani ya minene mpe ya mike mpo na fɛti ya elimo: liyangani ya etúká oyo ekozala na motó ya likambo “Bósɛnzɛlaka!” Mosala monene esili kosalema mpo na kobongisa mateya ya liyangani yango mpe makambo mosusu. Biso nyonso tobengisami na liyangani yango. Mpo tóyangana mpe tózwa mpenza matomba na liyangani yango, mokomoko na biso asengeli mpe komibongisa.​—Mas. 21:5.

2. Tosengeli kosala nini mpo tózala na fɛti na biso ya elimo bandá ebandeli tii nsuka?

2 Landá liyangani mobimba: Osilisi kobongisa makambo nyonso mpo oyangana mikolo nyonso misato na fɛti yango ya elimo? Soki esengeli, sololá na mokonzi na yo ya mosala mpo na koyebisa ye ete okozala na liyangani, kobanda mokolo ya liboso tii mokolo ya nsuka. Osili kozwa bibongiseli mpo na mbongo ya tike mpe esika ya kolala? Bankulutu basengeli koluka koyeba soki mibange mpe bandeko mosusu bazali na mposa ya lisalisi, mpe kosalisa bango.​—Yil. 23:4; Gal. 6:10.

3. Mpo na nini tosengeli te kokende na liyangani oyo esangisaka bato ya mikili mingi oyo babengi biso te?

3 Na bisika mosusu, bandeko bakozala na mayangani oyo esangisaka bato ya mikili mingi. Tosengeli koyeba ete masangá mosusu mpe bandeko oyo bakouta na mikili mosusu babengisami na mayangani yango. Ntango biro ya filiale ezali kozwa bibongiseli wana, etalelaka malamu motángo ya bato oyo esengeli kobengisa na kotalela bisika ya kofanda mpe bashambrɛ ya otɛlɛ oyo ebongisami. Soki basakoli mosusu bakei na liyangani oyo esangisaka bato ya mikili mingi epai babengi bango te, bato bakoleka ebele.

4. Makambo nini ekosalisa biso tózala pene ya kolanda programɛ ya mokolo mokomoko banda na ebandeli?

4 Omibongisa mpo okómaka na esika ya liyangani mikolo nyonso liboso ete liyangani ebanda. Zwá mwa miniti liboso ete liyangani ebanda mpo na kotala makambo oyo ezali na lokasa ya programɛ. Yango ekosalisa yo obongisa motema na yo mpo na kolanda mateya malamu. (Ezl. 7:10) Ntango prezida akosɛnga bayangani bálanda miziki, landá yango mpe omibongisa mpo na koyemba loyembo ya ebandeli mpe kolanda libondeli ya ebandeli.

5. Ndenge nini libota na biso ekoki kozwa matomba mpenza na mateya ya liyangani?

5 Soki libota mobimba efandi esika moko na liyangani, baboti bakozala na likoki ya koyeba soki bana na bango bazali kolanda mateya malamu. (Det. 31:12) Moto nyonso alendisami na kolanda na Biblia na ye ntango balobi bazali kotánga bavɛrsɛ. Soki ozali kokoma makambo na mokuse, yango ekosalisa yo olanda na likebi. Na nsima, makambo oyo okomaki ekosalisa yo omikundola makanisi ya ntina ya masukulu. Salá makasi ofanda kimya mpe otambolatambola te ntango masukulu ezali kosalema. Soki ozali na telefone ya mabɔkɔ, salá nyonso mpo elongola likebi na yo to ya bato mosusu te ntango liyangani ezali kosalema. Na nsuka ya mokolo mokomoko, mpo na nini te kosolola elongo na basusu makambo oyo osepelaki na yango na mokolo wana?

6. Libaku nini ya ntina mingi tozalaka na yango na mayangani na biso, mpe ndenge nini tokoki kozwa mpenza litomba na yango?

6 Na liyangani ya etúká, tozalaka na libaku monene ya kosepela elongo na bandeko na biso mibali mpe basi, na ndenge oyo emonanaka te na mokili. (Nz. 133:1-3; Mko. 10:29, 30) Mpo na nini te kobanda koyebisa bandeko oyo bafandi pembeni na yo nkombo na yo mpe kosolola na bango na ntango ya bopemi? Yango ezali moko ya matomba oyo okozwa soki omemi mwa bilei ya kolya na midi mpe otikali kaka na esika ya liyangani, na esika ya kokende kolya na restora. Salá nyonso mpo ozanga te libaku wana ya kolendisana elongo na bandeko.​—Lom. 1:11, 12.

7. Bibongiseli nini tosengeli kozwa mpo na bilamba oyo tokolata na liyangani?

7 Molato: Soki Yehova apesaki Bayisalaele mobeko ete bámisalela ndelo ya malendamalenda na nsɔngɛ ya bilamba na bango mpe bábakisa nsinga ya bulé likoló ya ndelo yango na nsɔngɛ ya elamba, ezalaki mpamba te. (Mit. 15:37-41) Yango ezalaki elembo ya polele oyo emonisaki ete bazalaki ekólo oyo etyami pembeni mpo na kosambela Yehova. Lelo oyo, molato na biso ya lokumu mpe ya kolekisa ndelo te, oyo tolataka na mayangani na biso, etyaka biso pembeni na mokili oyo. Yango epesaka litatoli ya malamu na bato oyo batalaka biso, ata ntango tokɔtaka na restora mpo na kolya nsima ya liyangani. Yango wana, kanisá malamu liboso mpo na bilamba oyo okolata na liyangani.

8. Ndenge nini tokoki kopesa bato litatoli ntango tozali na engumba oyo liyangani ezali kosalema?

8 Pesá litatoli: Soki tokanisi malamu liboso, tokoki kozwa likoki ya kopesa bato litatoli na engumba oyo liyangani ekosalema. Ndeko mobali moko oyo akendaki elongo na mwasi na ye na restora nsima ya liyangani, alakisaki mosapi na makarɔ oyo alataki mpe atunaki mosali ya restora boye: “Omonaki bato mingi balati makarɔ oyo?” Mosali ya restora alobaki ete amonaki bango mpe azalaki komituna soki ezali nini. Yango efungolaki nzela na lisolo, mpe ndeko mobali yango abengisaki moto yango na liyangani.

9. Ndenge nini tokoki komonisa botɔndi na Yehova, oyo abengi biso na liyangani?

9 Atako bandeko na biso bakosala masukulu, mituna-lisolo, mpe bilakiseli, kasi ezali nde Yehova, Tata na biso ya likoló, moto abongiselaka biso fɛti wana ya elimo mbula na mbula. (Yis. 65:13, 14) Tokomonisa botɔndi na Moto oyo abengi biso soki toyei na liyangani mikolo nyonso mpe tozangisi ata eteni moko te ya bilei ya elimo oyo bakopesa biso. Osili komibongisa mpo na kolanda liyangani mobimba?

[Box on page 6]

Makambo oyo tosengeli kobosana te mpo na liyangani ya etúká

◼ Ngonga ya kobanda: Mikolo nyonso misato, liyangani ekobanda na ngonga ya 9:20 na ntɔngɔ. Porte ya esika ya liyangani ekofungwama na ngonga ya 8:00 na ntɔngɔ. Ntango miziki ebandi kobɛta, biso nyonso tosengeli kofanda na bisika na biso mpo programɛ ebanda na ndenge ya molɔngɔ. Na mokolo ya mitano mpe ya pɔsɔ, liyangani ekosuka na ngonga ya 4:55 na mpokwa, mpe na mokolo ya lomingo, ekosuka na ngonga ya 4:00 na mpokwa. Mpo na mayangani oyo ekosangisa bandeko ya mikili mingi, programɛ ya mokolo ya minei ekobanda na ngonga ya 1:20 nsima ya midi, mpe ekosuka na ngonga ya 4:55 na mpokwa.

◼ Kokanga bisika ya kofanda: Tokoki kokanga bisika ya kofanda kaka mpo na baoyo toyei na bango motuka moko to baoyo tofandaka na bango ndako moko.

◼ Bilei ya midi: Tosɛngi bino bómema biloko ya kolya ya mindɔndɔ te, kasi oyo ekopesa bino makasi na nzoto, na ndakisa: mampa, mbuma (bitabe), nguba, mikate to gato. Esengeli komema mai, tii to kafe, na milangi oyo ekoki kopasuka te mpo ezokisa bato te. Epekisami komema masanga ya makasi na liyangani. Soki tomemi biloko na biso ya kolya, mai, mpe masanga ya sukali, ntina ya kosomba biloko epai ya batɛki ekozala te. Soki toboyi kosomba biloko ya kolya epai ya bato oyo batɛkaka libándá, tokobatela bopɛto na biso mpe yango ekopesa litatoli malamu. (Liyebisi: Bato oyo batɛkaka biloko ya kolya basengeli te kokɔta na esika ya liyangani, ata na ngonga nini.​—Yoa. 2:13-17.)

◼ Makabo: Tokomonisa botɔndi na biso mpo na liyangani soki topesi makabo ya bolingo malamu na Ndako ya Bokonzi na biso to na liyangani mpo na mosala ya kosakola na mokili mobimba.

◼ Makama mpe lisalisi ya nokinoki: Bandeko ya departema oyo epesaka lisalisi ya nokinoki balobi ete mbala mingi babengaka bango mpo na makambo oyo ezali na ntina mingi te. Soki moto moko akwei na maladi na esika ya liyangani, esengeli naino koyebisa ndeko moko oyo azali koyamba bato pene wana; ye akosolola mbala moko na bandeko ya departema ya Mwa Lisungi ya nkisi mpo bandeko oyo bayebi mosala yango, oyo bazali na esika ya liyangani, bátala soki moto yango azali mpenza na maladi makasi mpe básalisa ye.

◼ Kokɔtisa mingongo to kozwa bilili: Esengeli te kotya radio to masini mosusu ya kokɔtisa mongongo to kozwa bilili na bansinga ya kura to na masini ya kokolisa lolaka ya liyangani, mpe tokosala yango kaka soki ekobebisa likebi ya bato mosusu te.

◼ Kokanga fɔtɔ: Soki bokokanga fɔtɔ ntango liyangani ezali kosalema, tosɛngi bino bósalela mwinda ya fɔtɔ te. Tosɛngi bino bóbengisa bato oyo bakangaka fɔtɔ na esika ya liyangani te. Soki bomoni bango bazali kokanga bato bafɔtɔ, bókangisa fɔtɔ epai na bango te.​—Yoa. 2:13-17.

◼ Batelefone ya mabɔkɔ: Tosengeli kosala nyonso mpo batelefone na biso ebebisa te likebi na biso moko to ya basusu.

◼ Bopɛto: Emonanaka mbala mingi ete baoyo basombaka bilei epai ya batɛki, babwakaka nkasa na mabelé. Okomona bipai na bipai na esika mobimba ya liyangani bapapye, basashɛ, babushɔ ya milangi ya masanga ya sukali mpe bongo na bongo. Soki moto moko amoni malamu kosomba biloko ya kolya epai ya batɛki (na ndakisa: bɔmbɔ, bisikiti, gato, mbisi to biloko mosusu), asengeli kobwaka nkasa na yango na bisika oyo ebongisami mpo na kobwaka bosɔtɔ, kasi na mabelé te. Soki tomoni moto moko abwaki papye to sashɛ na mabelé, tosengeli kolɔkɔta yango mpe kobwaka yango na bisika oyo ebongisami mpo na kobwaka bosɔtɔ. Bandeko, tosɛngi bino bósala milende mpenza mpo tóbatela esika na biso ya liyangani pɛto na kati mpe na libándá. Bopɛto ezali likambo oyo mokomoko na biso asengeli kotyela yango mpenza likebi. Soki mokomoko na biso asali bongo, tokotika esika ya liyangani pɛto na nsuka ya mokolo. Tolingi komonisa bizaleli ya Nzambe oyo tosambelaka, oyo azali mosantu.​—1 Pet. 1:15, 16; Ex. 19:10; Det. 23:14.

◼ Na bisika oyo tokolala: (1) Komema bato ebele te na ndako to na esika ya kolala oyo bapesi yo koleka ndenge esengeli to ndenge mokóló ndako asɛngaki. (2) Soki okofanda lisusu te na esika oyo osɛngaki, osengeli koyebisa yango noki. (3) Liboso ya kolamba, tuná naino mokóló ndako to bandeko oyo bazali na mokumba ya kotalela bisika ya kolala na Ndako ya Bokonzi makambo oyo okoki kosala mpo likama ebima te. (4) Kobebisa te biloko oyo bapesi yo osalela. Esengeli kozala na bokatikati mpe na makambo makasimakasi te. (5) Bopɛto emonisaka ete tozali kobanga Nzambe. Mikolo nyonso, liboso ya kobima, bongisá esika na yo ya kolala mpe tiká yango pɛto. Yango etaleli mpe Ndako ya Bokonzi, oyo ekoki kokóma esika ya kolala mpo na bandeko oyo bakouta na masangá ya mosika. (6) Monisá mbuma ya elimo na makambo oyo ozali kosalela basusu, ezala moto oyo ayambi yo to bandeko mosusu oyo bakoki kotya yo ná bango esika moko.​—Gal. 5:22, 23.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto