Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 5/04 lok. 4
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2004
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • (Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2004
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2006
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2007
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2009
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2004
km 5/04 lok. 4

Ndenge ya kolakisa bazulunalo

(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛl 15 Mai

“Okanisi ete makambo oyo bato basalaka awa na mabelé ekoki kosepelisa Nzambe to kopesa ye mawa? [Tiká ye apesa eyano.] Talá ndenge Nzambe amiyokaka mpo na makambo oyo tosalaka. [Tángá Masese 27:11.] Zulunalo oyo ezali kolobela bandakisa ya bato mosusu oyo basepelisaki motema ya Nzambe, ezali mpe kolimbola ndenge oyo biso mpe tokoki kosala yango.”

Lamuká! 22 Mai

“Minganga bakómá kobikisa maladi ndenge na ndenge. Kasi, okanisi ete mokolo mosusu mokili ekozala lisusu na maladi te? [Tiká ye apesa eyano.] Zulunalo oyo ezali kolimbola ete mokolo mosusu bato nyonso na mabelé bakozala na nzoto kolɔngɔnɔ ntango elaka oyo ekokokisama.” Tángá Yisaya 33:⁠24.

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛlii 1 Yuni

“Bato mosusu bamonaka ete ezali na ntina te kokɔta na lingomba moko mpo na kosambela Nzambe. Okanisi nini na likambo yango? [Tiká ye apesa eyano.] Zulunalo oyo elobeli ndenge bato bazalaki kosambela Nzambe na ntango ya kala. Ezali mpe komonisa ndenge ya kosambela Nzambe na solo.” Tángá Yoane 4:24.

Lamuká! 8 Yuni

“Bato mingi lelo oyo bamiyokaka ete bazali kaka bango moko. Ezaleli yango etindaka bango na komiyoka ete bato mosusu basepelaka na bango te. Okanisi ete ezaleli yango ekoki mpenza kotungisa moto? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima tángá Nzembo 25: 16.] Lamuká! oyo ezali kopesa toli ya malamu mpenza mpo na ndenge ya kosilisa ezaleli ya komiyoka ete ozali kaka yo moko.”

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto