Ndenge ya kolakisa bazulunalo
(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 15 Mai
“Okopesa eyano nini na motuna oyo? [Tángá motuna oyo ezali na ezipeli. Na nsima, tiká ye apesa eyano.] Biblia emonisi ntina oyo tosengeli kozala na elikya. [Tángá Matai 6:9, 10.] Zulunalo oyo elimboli ndenge oyo Bokonzi ya Nzambe ekokokisa mokano ya Nzambe awa na mabelé.”
Lamuká! Mai
“Okanisi ete Nzambe abongisá makambo nyonso oyo tosalaka na bomoi na biso mpe ndenge oyo mokomoko na biso akosuka? [Tiká ye apesa eyano.] Na kotalela vɛrsɛ oyo, Nzambe atikaka bato bápona oyo bakosala na bomoi na bango. [Tángá Deteronome 30:19.] Lisolo oyo emonisi oyo Biblia elobi na likambo yango.” Lakisá lisolo oyo ebandi na lokasa 12.
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Yuni
“Pene na mikolo nyonso toyokaka nsango ya bato oyo bazali kosala makambo ya mabe. [Tángá likambo moko ya mabe oyo eyebani na esika bofandi.] Omituná naino te soki ezali na moto moko ya mabe mpe amonanaka te, oyo atindaka bato básala mabe? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima, tángá Emoniseli 12:12.] Zulunalo oyo elimboli ndenge oyo tokoki komibatela.”
Lamuká! Yuni
“Nalingi nayeba likanisi na yo na likambo oyo balobeli awa. [Tángá 1 Timote 6:10.] Okanisi ete bato oyo babomaka nzoto mpo na kozwa mbongo mpe koluka kokóma na biloko mingi bamibendelaka nde bampasi? [Tiká ye apesa eyano.] Zulunalo oyo elimboli makama ya koluka kokóma na bozwi mingi.”