Ndenge ya kolakisa bazulunalo
(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛl 15 Yuni
“Omonaka te ete lelo oyo kobɔkɔla bana ekómi mpenza mpasi? [Tiká ye apesa eyano.] Talá maloba oyo emonisi ete baboti bakoki kolonga kobɔkɔla bana malamu. [Tángá Masese 22:6.] Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo ezali kopesa toli ya malamu, oyo ekoki kosalisa baboti bálonga na likambo yango.”
Lamuká! 22 Yuni
“Bato mosusu bamonaka ete kondima ete Nzambe azali eyokani ata moke te na siansi. Kasi, oyebi ete ezali na bato ya siansi oyo balobaka ete siansi ezali komonisa ete Mozalisi azali? [Tiká ye apesa eyano.] Lamuká! oyo ezali kolobela makambo mosusu oyo etindaki bango báloba bongo.” Tángá Baloma 1:20.
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛlii 1 Yuli
“Ntango likama moko esalemi, bato mingi bamitunaka soki Nzambe amibanzabanzaka mpenza mpo na bato mpe soki amonaka ndenge bazali konyokwama. Omituná naino motuna yango te? [Tiká ye apesa eyano.] Zulunalo oyo ezali komonisa ndenge Nzambe amibanzabanzaka mpo na biso lelo oyo mpe oyo asali mpo na kolongola bampasi ya bato.” Tángá Yoane 3:16.
Lamuká! 8 Yuli
“Bato mingi bamonaka ete bolenge ezali ntango ya esengo, kasi mpe ya mikakatano mingi, ezali bongo te? [Tiká ye apesa eyano.] Zulunalo oyo ezali kolobela mbongwana oyo esalemaka na nzoto ya bilenge. Ezali mpe kolobela toli mosusu ya ntina oyo ekoki kosalisa bilenge balekisa bambula na bango ya bolenge malamu.” Tángá Mosakoli 12:1.