Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 8/04 lok. 5
  • Bozongeli ya Liyangani ya zongazonga

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bozongeli ya Liyangani ya zongazonga
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2004
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • MOKOLO YA LIBOSO NSIMA YA MIDI
  • MOKOLO YA MIBALE NA NTƆNGƆ
  • MOKOLO YA MIBALE NSIMA YA MIDI
  • Bozongeli ya Liyangani ya mokolo moko
    Mosala na biso ya Bokonzi—2004
  • Ebongiseli ya sika mpo na kosala bozongeli ya mayangani
    Mosala na biso ya Bokonzi—2004
  • Liyangani ya zongazonga ya mbala oyo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2004
  • Bozongeli ya Liyangani ya Zongazonga
    Mosala na biso ya Bokonzi—2005
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2004
km 8/04 lok. 5

Bozongeli ya Liyangani ya zongazonga

Lisolo oyo ekotalelama liboso ya liyangani ya zongazonga ya mobu ya mosala 2005 mpe na bozongeli na yango. Lisolo, “Ebongiseli ya sika mpo na kosala bozongeli ya programɛ ya mayangani,” oyo ezali na lokasa 4 ya siplema oyo, ezali komonisa ndenge ya kosalela yango. Na bozongeli, esengeli kosalela ngonga malamu mpo na kotuna mituna nyonso. Bozongeli esengeli mpenzampenza komonisa ndenge oyo tokoki kosalela makambo toyokaki na liyangani.

MOKOLO YA LIBOSO NA NTƆNGƆ

1. Nini ekosalisa biso na kozwa bwanya oyo euti na Nzambe?

2. Milende nini basakoli ya zongazonga basali mpo na koyebisa bato mingi nsango malamu?

MOKOLO YA LIBOSO NSIMA YA MIDI

3. Mpo na nini ezali na ntina baklisto bázala ntango nyonso pɛto na makanisi? Yango ezali kosɛnga biso tósala nini?

4. Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali koluka kozala na kimya elongo na bandeko na biso?

5. Kozala na makanisi ebongi elimboli nini, mpe ndenge nini tokoki komonisa yango na ndenge oyo tozali kosalela ntango na biso?

6. Liteya nini tozwi na ndakisa ya Saulo mpe ya Noa? Na makambo nini tosengeli komonisa ete ‘tosepelaka kotosa’? (Yak. 3:⁠17)

7. Ndenge nini baklisto bakoki koboya kozala na lolenge mibale ya bomoi?

8. Ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya Paulo na oyo etali kolobela bwanya ya Nzambe?

MOKOLO YA MIBALE NA NTƆNGƆ

9. Mpo na nini tosengeli mpenza kokeba ntango tozali kopɔna makambo oyo tolingi kosala, mpe nini ekosalisa biso na kosala bongo?

10. Milende nini bandeko ya zongazonga bazali kosala mpo na koyanganaka na makita nyonso, mpe matomba nini bazali kozwa?

11. Ndenge nini batata bakoki kotonga mabota na bango?

12. Bamposa nini ya zongazonga babendaki likebi na biso mpo na yango?

MOKOLO YA MIBALE NSIMA YA MIDI

13. Ndenge lisukulu ya bato nyonso emonisaki yango, misala nini ya sembo ezali kouta na bwanya oyo euti na likoló?

14. Mpo na nini ezali bozoba komityela motema to kotya motema na bato oyo batambwisami te na bwanya oyo euti na Nzambe? Tosengeli kokeba na makambo nini?

15. Bwanya oyo euti na Nzambe ebatelaka biso na mitambo nini?

16. Mpo na nini ezali na ntina mpenza tósalela toli oyo toyokaki na liyangani ya zongazonga?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto