Liyangani ya zongazonga ya mbala oyo
Lokola tozali kobika na “bantango ya ndenge mosusu mpe ya mpasi mpenza,” tozali na mposa ya bwana oyo euti na Nzambe mpo Yehova andima biso mpe alanda kondima biso. (2 Tim. 3:1) Liyangani ya zongazonga ya mobu ya mosala 2005 ekopesa biso toli oyo ebongi mpe ekolendisa biso mpenza, mpamba te motó ya likambo na yango elobi: “ ‘Bwanya oyo euti na likoló’ etambwisaka biso.”—Yak. 3:17.
Masukulu-matongani ya liboso ezali na motó ya likambo: “Tómonisaka ‘bwanya oyo euti na likoló’ na bomoi na biso,” ekosalisa biso na koyeba ndimbola ya kozala pɛto na bizaleli, na kimya, na makambo makasimakasi te mpe kosepela kotosa. Na nsima, mokɛngɛli ya zongazonga akobenda likebi ya bayangani na makambo mosusu misato etaleli bwanya oyo euti likoló. Mokɛngɛli ya etúká akosala lisolo ya nsuka ya mokolo ya liboso mpe akomonisa ndenge baministre baklisto bazali na nyonso oyo esengeli mpo na koyebisa bato bwanya oyo euti na Nzambe, atako bato mosusu batalelaka bango lokola “bato batángá kelasi mingi te mpe bato mpamba.”—Mis. 4:13.
Na mokolo ya mibale, masukulu-matongani oyo ezali na motó ya likambo: “Landá makambo oyo etongaka,” ekosalisa biso tóyeba mpe tókima makambo oyo ekoki kolɛmbisa biso na elimo. Ekomonisa biso mpe ndenge oyo tokoki kolendisa basusu na makita, na mosala ya kosakola, mpe na libota. Lisukulu ya bato nyonso oyo ezali na motó ya likambo: “Ndenge bwanya oyo euti na Nzambe epesaka biso matomba,” ekosalisa biso na kozala na botɔndi mingi mpo na matomba oyo tozwaka ntango tosalelaka mitinda ya Nzambe na bomoi na biso. Lisukulu ya nsuka oyo ezali na motó ya likambo: “Kosala makambo na boyokani na bwanya ya Nzambe ebatelaka biso,” ekosalisa biso tókangama na mokano na biso ya koluka bwanya ya Yehova na mikolo oyo ya nsuka.
Likambo ya ntina mingi na mayangani nyonso ezalaka batisimo ya bayekoli ya sika. Eteyelo ya mosala ya Teokrasi mpe boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo ebongisami mpo na pɔsɔ wana ekosalema mpe na liyangani. Yehova alingi ete biso nyonso tózwa matomba na bwanya oyo ezali kouta epai na ye. Tokozwa toli mingi mpe tokolendisama mpenza na makambo oyo tokoyoka na liyangani na biso ya zongazonga ya mbala oyo.—Mas. 3:13-18.